Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi aboyi kotia Malonda na kiti ya bokambi CENI


Président Félix Tshisekedi azali kokamba likita ya mbulamatari na télé-conférence, na Kinshasa, 17 juillet 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kokamba likita ya mbulamatari na télé-conférence, na Kinshasa, 17 juillet 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi aboyi kotia na kiti ya bokambi CENI Ronsard Malonda, kolanda mokanda ya eyano azongiseli mokambi ya Assemblée nationale.

M. Tshisekedi ayanoli na na mokambi ya Assemblée nationale ete mokanda atindelaki ye mpo na kolakisa bondimama ya Assemblee ya boponami na ya Ronsard, mozangi loboko, kolaba mikanda lokola procès-verbal ya lisanga ya bakambi ya biyamba.

Président Tshisekedi mpe alakisi ete bakambi ya biyamba lokola bakatoliki, ba protestants mpe ba kimbanguistes baboyi kondima Ronsard Malonda.

Masanga misusu mpe lokola ya ba indépendant mpe ba musulmans basakolaki kala mingi te ete bandimi te M. Malonda.

Bakambi misusu ya biyamba, lokola évengélist Sony Kafuta ya Eglise de réveil, ye , atingami koloba ete M. Malonda alongaki maponami na bato 6 likolo na 8. Kasi alobi, mboka ekoki kozika te mpo na moto moko mpe asengi bakambi ba biyamba kovanda lisusu esika moko mpo na koyokana malamu.

Na mokanda na ye, président Tshisekdi alakisi mpe ete mobulu mozali na mboka wuto Assemblée nationale endimaki M. Malonda bo' mokambi mwa CENi.

Tata mokonzi ya RDC ayebisi ete akokite kokende na etapi mosusu ya mobeko, toloba akoki te kovandisa M. Malonda na ebonga ya mokambi ya CENI.

Na lisikulu na ye lya mokolo ya bokanisi Lipanda ya RDC, le 30 juin 2020, M. Tshisekedi asi akebisaki ete akotia na bokonzi te moto oyo andimami te na mokano ya ba mboka.

XS
SM
MD
LG