Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ba biyamba bayokani te mpo na kopona motambwisi ya CENI


Mokambi ya CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo), Mgr Marcel Utembi (C) na cardinal Fridolin Ambongo (2e D) elongo na ba episkopo basusu na centre interdiocésain ya Kinshasa, le 31 décembre 2016.
Mokambi ya CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo), Mgr Marcel Utembi (C) na cardinal Fridolin Ambongo (2e D) elongo na ba episkopo basusu na centre interdiocésain ya Kinshasa, le 31 décembre 2016.

Bakambi ba biyamba bakabwani na kozanga boyokani mardi na mpokwa na Centre interdiocésain ya Kinshasa, na likita liya kopona motambwisi CENI to misala mya maponami na RDC.

Ngambo mibale emonisami kati na balambi ba biyamba na suka ya likita lyango.

Bakambi ba biyamba boyokaki moko na moko ya bato baye batikali na molongo ya kowelela ebonga ya mokambi ya CENI nsima na mosala ya koyungola bato banso bapesaki nkombo.

Ngambo moko, bayi CENCO (likita lya ba episkopo ba katoliko) na bakambi ba ECC (eyamba ya ba protestants to misioni to Eglise du Christ au Congo) bazali kokoba kosenga mokano ya banso na boyokani to consensus.

Kasi bakambi ba biyamba misusu balingi kokende na maponami.

Bakambi ba CENCO mpe ECC basolaki na ngambo moko nsima na likita lyango, yambo na kobima na koboya koloba likmabo.

Bakambi ba biyamba biye misusu babengisi bapanzi sango na ndako ya CIME (Commission d'intégrité et médiation électorales ) esika bazali kokoma procès verbal.

Kasi bayi CENCO, mingi mingi Mgr Marcel Utembi mokambi na yango, balobi ete likita likoba lobi, elobi Aimé-Cyprien Dionzo na Twitter na ye.

Nzokande kolande linaka lisalamaki na Assemblée nationale, bakambi biyamba basengelaki kopona motambwisi ya CENI nde mardi le 27 juillet 2021.

XS
SM
MD
LG