Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Président Tshisekedi andimi ete alingi atikala na bokonzi na 2023 mpo kobongola RDC


Président Félix Tshisekedi na Bunia, Ituri, 19 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na Bunia, Ituri, 19 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asukisi mobembo mwa ye na monyele ya mboka na kosakola mokano mwa ye ya koluka kolonga maponami ma 2023.

"Mpo etali mokano mwa ngai ya kozala na 2023… Nalingi na tikala. Nazali na emoniseli mpo na mboka eye. Nalingi na monana ekolo eye kobongwama. Nakanisi ezali libaku mpo na biso ya kobongola yango. Esengeli tosala yango," elobi na M. Tshisekedi na biyano apesi na mopanzi sango ya RTNC mpe ya Top Congo na etando eke.

"Nalingi te ete bato bakanisa ete lokola nazali na mposa eye, na kozala lokola nazali kosalaka campagne. Ntango mosala mokosila, tokozongela bana mboka mpo kosenga bango bapona biso," ebakisi M. Tshisekedi.

Président Tshisekedi alobi yango mwa ngonga yambo na Cour constitutionnelle kondima ete mobeko ya botambwisi CENI to misala mya maponami (loi organique portant fonctionnement et organisation de la CENI) mozali engembenene na Buku Likonzi. Mabongisi ma mobeko mwango mondimamaki na suku mibale ya Parlement mposo moleki.

Nzokande, bayi société civile mpe mingi koleka bakambi ba biyamba mpe baike ya bayi bolitiki bapameli mobeko yango mpo na kotika loboko lya bayi politiki likolo ya CENI na bokesi na oyo bango bazali kosenga.

Mikolo mibale yambo na yango, M. Tshisekedi alobaki likambo lya ndenge moko na Jeune Afrique.

"Nazali na ndingisa ya kosala mandats mibale, mpo na nini na kosuka na zela ? Nazali na emoniseli mpo na mboka eye, nalingi na kokisa yango. Soki bana mboka balingi kopesa ngai mandat ya mibale, na kokoba etinda na ngai mpe na nsima nakotikela moto mosusu, "elobaki M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC asali pene na mposo misato na monyele ya mboka epayi wapi akendaki kotala bavandi bazwaki mpasi na botomboki ya volcan Nyiragongo mpe misala misala état de siège.

XS
SM
MD
LG