Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba mouvements citoyens batamboli mpo kosenga mbongwana na misala mya maponami


Boko na ba mouvements citoyens bazali kotamba na boulevard Lumumba na Kinshasa, 19 juillet 2020. (Facebook/Hervé Diakiese)
Boko na ba mouvements citoyens bazali kotamba na boulevard Lumumba na Kinshasa, 19 juillet 2020. (Facebook/Hervé Diakiese)

Bolongolami ya Ronsard Malonda mpo na kokamba CENI bokoki te, esengeli mbongwana esalama na misala mpe mobeko ya maponami, yango nde maloba ma baye batambolaki.

Mangomba ya bomoto ya bana ya mboka matambolaki dimanche na Kinshasa mpo na kosenga mbongwana na maponami.

Comité Laïc ya coordination (CLC), LUCHA, FILIMBI mpe mangomba misusu ya lolenge ya kozala bana mboka malamu bakitaki o’balabal.

Botamboli na bango bosalami mikolo miike nsima na président Félix Tshisekedi koboya kotia na mosala Ronsard Malonda bo’ mokambi ya CENI, ata Assemblée nationale ekomelaki ye na ntina ya koyebisa ye bondimi na yango na boboponami na boko na bakambi biyamba basalaki.

"Moko na bosengi na biso ezwi eyango : Ronsard Malonda atiami pembeni. Topesi longonya na mokonzi ya mboka mpo na yango. Kasi ekoki nanu te, mpo bolongoli bwa ye bozongisi biso na libandeli, esengeli mbongwana esala mpo bato basalaka na CENI bazala te bato batosa lingomba politiki songolo, esengeli auditioin ya CENI esalama mpe audit na yango na Cour des comptes," elobi molobeli ya CLC, Me Hervé Diakiese.

Police esepeli mobulu mosalami te. Batamboli basukaki na bango yambo ya kokomata na Echangeur ya Limete, longwa wenze ya Liberté esika babandaki botamboli.

XS
SM
MD
LG