Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Balandi 17 ya Fayulu batikami mokolo nsima na kokangama na botelemi mabongisi ma kokamba CENI


Serge Welo, mokambi bilenge ya ECIDE, na baninga baye na cachot ya police ma Kinshasa, 23 uin 2021. (Twitter/Coalition Lamuka)
Serge Welo, mokambi bilenge ya ECIDE, na baninga baye na cachot ya police ma Kinshasa, 23 uin 2021. (Twitter/Coalition Lamuka)

Balandi zomi na sambo ba Lamuka mpe ECIDE batikami mokolo moko nsima na bokangami na liboso lya Aseemblée nationale epayi bazalaki na milulu ya kotelemela mabongisami ya mobeko mokokamba CENI mondimamaki mposo moleki na Parlement.

Balandi ba Fayulu bakangamaki ntango bazalaki koboya loboko ya bayi politiki na CENI na nzela ya mabongisi ma mobeko ya bokambi CENI (Misala mya maponami) mandimamaki mposo moleki na Parlement.

"Baninga ba ngai 16 na nga moko towuti kobima na cachot ya 2m na 3m ezalaki na solo mabe makasi esika wapi tozalaki kokokisa bosenga nyonso ya nzoto wapi police ebongisa ata esika mpo na yango te na kotosa malako makomibatela na COVID-19. Tokokoba botelemeli bwa biso ya makasi," ekomi na Twitter mokambi ya bilenge ya ECIDE, Serge Welo.

Nzokande, bilenge bya Lamuka babisimi mokanda mpo kopesa maboko na bakambi ba ECC to eklezia ya misioni baye bazali kopamela mabongisami mandimami na Parlement mpo na bokambami ya CENI.

Biso… bilenga ya Lamuka tozali kotonda bino mpe kosenga biso kokoba na makanisi maye na koboyaka kozala na misala minso mya kopona mokambi ya CENI ndenge makambo mazali kokende, elakisi mokanda ya bayi Lamuka.

ECC epamelaki bondimami Assemblée nationale mpe Sénat esalaki na mabongisi mabeko maye mpe ebengaki yango boleki na makasi to coup d’Etat.

XS
SM
MD
LG