Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Wolo ya RDC etindami na Emirats nsima na bobebani na Rwanda


Président Félix Tshisekedi alakisi ndambo ya wolo eye RDC ezali kodinda na Emirats arabes unis, na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 13 sanza ya yambo 2023. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi alakisi ndambo ya wolo eye RDC ezali kodinda na Emirats arabes unis, na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 13 sanza ya yambo 2023. (Twitter/Présidence RDC)

Milulu mya bobtindi na polele, mpo na mbala ya yambo, wolo ya Ekolo Congo démocratique (RDC) na Emirats arabes unis (EAU) misala o’mokolo mwa mitano (le 13 ya sanza ya yambo 2023) na Cité ya Union africaine, na Kinshasa, na bokambami bwa président Félix Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC alimboli ete boyokani bwa lolenge loye nde alingaki kosala na bikolo nzinga nzinga kasi bango baponi nzela ya mobulu na makila mabato.

"Kasi likambo lya mawa nde mpo bayokeli ngayi te. Boko na ba ndeko nzinga nzinga basepeli kokoba na nzela etonda mabaku mpe makila ma bana mboka na biso. Nazwaki mokano ya kosukisa makambo manso na kosalelaka nzela ya diplomatie, mombongo mpe mampinga, Nandimi ete tokosuka na kolonga mpo tozali na nzela elamu," elobi na lisikulu na ye président Tshisekedi.

Wolo etindami ezali bongo 28 kg ya misala mya mikolo mitano mya yambo ya bosangisami to "joint ventures" ya ba compagnies nzike ya RDC na ya consortium (liboke) ya Emirats Primera Group Limited, boye boboti Primera MetalsDRC.

M. Tshisekedi abwaki mpe mbela na bana mboka mpo na kolanda ndakisi eye.

"Nasengi bana mboka na nga na bolingi mingi ya ekolo, na kosolola ete ezali te na koteka na moyibi mabanga ma ntalo ya ekolo na biso nde bakosunga ekolo. Ekozala malamu kutu komekola mayele ma lolenge loye, komikotisa na makambo ma lolenge loye na ntina ya komema bomengo na ekolo eye mpe bana ba mboka eye na ntobwa eye tolingi mpe tozali kozela banso," elobi M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC asukisaki mobu moye boyokani ya kosala elongo kati na Sakima SA (Société ya wolo ya Kivu mpe ya Maniema) na DITHER LTD ya Rwanda, boye botiamaki manzaka na sanza ya motoba na 2016.

Boyokani bwango bosukidamaki nsima na bozongeli bitumba ya ba M23 baye Kinshasa bazali kofunda Rwanda kozala na nsima na bango.

Na boyokani ya Kigali na Kinshasa, Rwanda ebandaki kopetola wolo eye ezali kozwama na Sakima, na RDC.

Kinshasa elobaki ete bouskisi ya boyokani boye bozalaki mpo na kopekisa mangomba ma basimba minduki kozwa makoki mpe misolo na nzela ya boyokani boye.

Boyokani bwa sika na Emirats bokopesa nzela ya komema na ekolo eye tonne moko ya wolo 'endimami" kino sanza misato mpe kokoma na 15 tonnes mobu na mobu.

Batimoli wolo na maboko pene na 30.000 bayebana kopesaka wolo na compagnie ekelami.

XS
SM
MD
LG