Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mampinga ma ekolo Rwanda makoti na makasi na ekolo Congo democratique mpe ba pillages esalemi


Mampinga ya RDC, FARDC na Djugu, na Ituri, janvier 2020. (FARDC PP Lieutenant Jules Ngongo)
Mampinga ya RDC, FARDC na Djugu, na Ituri, janvier 2020. (FARDC PP Lieutenant Jules Ngongo)

Bayi FARDC balobi bakangi basoda misato ya mboka Rwanda oyo bakatisaki ngambo ya mondele to frontiere ya RDC, mpe babengani basoda RDF (Rwanda defence force) ya mboka Rwanda na Est ya RDC epayi wapi masasi mandongwamaki makasi mpe mapesaki kobanga makasi na bayi population.

Na liyebisi lya ye lieutenant-colonel Guillaume Ndjike, molobeli ya secteur operationel ya Nord -Kivu Sokola 2 alobi ete, basoda ya mboka Rwanda bakotaki na bamboka motoba mpe bapusanaki na ba kilometres 200 pene route nationale numéro 2. Ntango bakutanaki na nzela na bango na bayi RDC nde bazongaki nsima. Kondongbana okati na bango esaslemi na mboka Kibunda na ntongo ya lelo.

Bayi Fardc basakoli lisusu ete babotoli monduku moko na mampinga ma mboka Rwanda mpe balobi ete bakomema likambo liye na mecanisme ya verification oyo etyamaka na esika na kati ya bikolo ya CIRGL mpo na koluka koyeba ntina nini mampinga ya mboka Rwanda balingaki kokota na mabele ya ekolo Congo Democratique, epayi wapi bafundi basoda ya Rwanda na ko sala mpe ba pillages na bamboka baye.

Kino sika mbulamatari ya ekolo Rwando naino alobi eloko te po na koyeba nini penza etindaki basoda na ye kokota na mboka RDC.

Bato bayike bakimi ba mboka Kibumba mingi mingi basi, mikolo na bana kelasi, na kobanga masasi oyo ezalaki kobetama, elobi correspondant ya AFP oyo azalaki wana.

Bayi Fardc balobi ete na bagonga ezali koya bakosa bilan, mpo na koyeba, bato boni bazui likama na makambo maye.

Ekolo Congo democratique ezali na boyokani ya likolo likolo na ba voisins na ye ya Est, mingi mingi Rwanda, oyo RDC efundaka ntango inso na koluka kotya mobulu mpe kopesa loboko na basimba minduki baye bazali kosala mobulu na Est ya ekolo Congo Democratique, mpe ekolo Rwanda efundaka ekolo Congo Democratique na kobatela baye bazali koluka kokotisa mobulu na ekolo Rwanda.

Kobanda le 6 mai ya mobu moye, ba provinces ya Nord Kivu na ya Ituri ezali bongo na Etat de siege mpo na kosilisa mobulu oyo basimba minduki bazali kosala na bingumba biye na kobomaka batu.

XS
SM
MD
LG