Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kigali epameli bobengani ya ntoma Karega na Kinshasa mpe ekebisi bosangani bwa FARDC na FDLR


President Paul Kagame ya Rwanda (D) na président Tshisekedi ya RDC na Gisenyi nsima na botomboki bwa volcan Nyiragongo.
President Paul Kagame ya Rwanda (D) na président Tshisekedi ya RDC na Gisenyi nsima na botomboki bwa volcan Nyiragongo.

Mbulamatari ya Rwanda eyanoli na mokano mwa kobengana ntoma ya Rwanda Vincent Karega na Kinshasa Ekolo Congo démocratique (RDC) esakoli nsima na batomboki ba M23 kobotola mbako nzike na camp ya basoda ya Rumangabo mpe kopusana pene na Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu.

"Oyo ezali kotungisa mpenza ezali bokobi bwa boyokani kati na mampinga ma Congo na FDLR mpe bomeki bwa bango ya kobundisa esika ya ndelo na bibundeli ya makasi, lokola mpe maloba malobami mpo na Rwanda na ba media na bakonzi na RDC," elobi liyebisi lya mbulamatari ya Rwanda mokolo moko nsima na mokona mwa kobengana ntoma na yango na Kinshasam RDC esakolaki.

Mokano mwa kobengana ntoma Vincent Rugera mosakolamaki nsima na likita lya mbalakaka lya bakonzi ba bokengi président Félix Tshisekedi akambaki o'mokolo mwa mposo kolanda sango ya bobotolami ya Rutshuru-centre mpe camp ya Rumangabo na M23 eye Kinshasa efundi kosungama na Rwanda.

Kolanda Kinshasa, ba drones elekisaki ete basoda mingi ba Rwanda bakatisaki kowuta mboka na bango mikolo miye na ntina ya kokende kobunda na nsima ya batomboki ba M23 na territoire ya Rutshuru.

"Tozali mpe kokoba kolakisa na bayi molongo bokobi bwa maloba ma boyini, botindi bana mboka konyokola bayi Rwanda mpe baye balobaka Kinyarwanda na RDC, bosalami na bakonzi ba RDC mpe na bana mboka," epameli liyebisi lya Kigali.

Mbulamatari ya Rwanda elobi bosangani bwa FDLR na FARDC nde bomemi maloba maye ma boyini ya bayi Rwanda mpe baye balobaka Kinyarwanda.

Mbulamatari ya Rwanda elobi ete ezali mawa ndenge Kinshasa ezali kokoba kokosela Kigali makambo na kolebaka ete ezali kopesa M23 maboko.

Kigali elobi Kinshasa elingi bongo"kobomba botawu bwa yango ya bokambi mpe bokengi".

Mbulamatari ya Kigali elaki kokoba kopesa maboko na eyano ya kimya mpo na bokengi na etuka na kolanda misala mya Luanda na Nairobi.

Kinshasa na ngambo na yango ezali kowangana kosangana na FDLR.

XS
SM
MD
LG