Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Sénateurs baike ya USA basengi Biden kosukisa lisungi lya mampinga na Rwanda


(G-F) Président ya Rwanda Paul Kagame, kalaka mokonzi ya ONU Ban Ki-moon na vice-président ya Etats-Unis Joe Biden, na bokutani ya ONU, na New York, 26
(G-F) Président ya Rwanda Paul Kagame, kalaka mokonzi ya ONU Ban Ki-moon na vice-président ya Etats-Unis Joe Biden, na bokutani ya ONU, na New York, 26

Misala to Commission ya boyokani na Bapaya ya Sénat ya Etats-Unis ekomeli mokonzi ya ekolo Joe Biden mpe esengi ye kokata lisungi inso ya mampinga na Rwanda mpo na misala mya yango mya koluka kobebisa kimya na Ekolo Congo démocratique.

Commission eye ekambami na Sénateur Robert Menedez esengi botalami ya lolenge nini kozongisi na Rwanda bakonzi banso ba mampinga mpe ya mbulamatari ya Rwanda baye bazali sika na Etats-Unis na linaka IMET, linaka lya koteya bayi molongo na maye matali mampinga.

Sénateur Medenez alobi polele na mokanda mwango ete Rwanda etindaka basoda bayango na ngambo ya RDC wuto koleka mibu zomi mpe elamusi M23 eye ezali kosunga.

XS
SM
MD
LG