Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Tutsi na ba Hutu na masolo na Tshisekedi ntango bitumba ya M23 bingali


Président Félix Tshisekedi (G4) kati kati ya balakisi bilongi ya ba tutsi na Ekolo Congo démocratique, na Cité ya Union africaine, 10 novembre 2022, (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi (G4) kati kati ya balakisi bilongi ya ba tutsi na Ekolo Congo démocratique, na Cité ya Union africaine, 10 novembre 2022, (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi ayambaki o’mokolo mwa minei moleki balakisi bilongi mpe ba nsomi ya kabila ya ba Tutsi na Cité ya Union africaine na Kinshasa, ntango bitumba bingali makasi kati na mampinga ma Ekolo Congo démocratique na M23, lingomba lya batomboki baye balobaka babundela mingi nde mpo na bolamu ya bayi mboka baye balobaka kinyarwanda, monoko molobamaka na Rwanda, mboka nzinga nzinga.

"Bo’ mobateli bwa bomoko ya mboka, mokonzi ya ekolo akitisi mitema mya baye ayambaki mpo etali molende na ye ya komona bana ba RD Congo banso, ata kabila na bango ezali nini, kobika ma bomoko, boyokani mpe, na yango, na bozangi bokabwani ata ya moke," eyebisi nfako ya mosala présidence Tshisekedi na Twitter.

Kati na baye baymbamaki, ezalaki na bayi politiki mpe mingi bakeli mibeko ba ekolo na baye ba bituka ya ba tutsi.

Kolanda misala mya ye ya nsango, président Tshisekedi apesaki maloba se moko maye na bayi kabila Hutu ayambaki mposo moko moleki.

Misala miye milobi ete ba lakisi bilongi ya ba Tutsi balaki kozala nsima ya mokonzi ya mboka Tshisekedi mpe bapameli bitumba ya M23 na lisungi lya Rwanda lokola mbulamatari ya RDC efundka yango.

Ba Hutu nde basengi bobatelami ya bato baye balobaka Kinyarwanda.

Mikolo mileki, président Tshisekedi akebisa bana mboka kosala mabe na baye balobaka kintwarwanda mpe bokbwani na ba kabila, na mbela abwakaki ya boetelemi mo na bitumba ya M23.

XS
SM
MD
LG