Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

M23 elobi ebotoli Bunagana mpe Mahamat Faki asengi masolo kati na RDC na Rwanda


Engumba ya Bunagana na Nord-Kivu, pene na ndelo na Ouganda.
Engumba ya Bunagana na Nord-Kivu, pene na ndelo na Ouganda.

Batomboki ba M23 balobi na liyebisi ete babotoli Bungana (Nord-Kivu) na maboko ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique kasi mokambi ya Commission ya Union africaine asengi mbulamatari ya Rwanda mpe RDC kosolola.

M23 esakoli bobotoli ya Bunaganga na liyebisi.

"Bobotoli ya Bunagana bozali te likambo lingomba na biso likanaki mpo yango nde te tozali koluka. Kasi, na kotalaka lolenge mampingama ma biso mazali kotungisama na mangaomba ya bato mabe baye bazali kosalela ba canons ekendaka mosika wuto Bunagana mpe bobangi yango ezali komema na ba civili mpe kotinda ba nkoto na bango kokima, tozwaki mokano ya kobotola mboka Bunagana na ntina ya kosukisa likama liye mpe kopesa mpiko na bana mboka kozonga na ndako na bango," elobi liyebisi lya M23 litiami manzaka na molobeli ya M23, major Willy Ngoma.

Na ngambo na ye, mokambi ya Commission ya Union africaine Moussa Faki Mahamat asengi na mangomba ya basimba minduki banso batika bitumba na lombango mpe misala minso mya basoda miye mizali kotiya na likama Rwanda na Ekolo Congo démocratique misukisama na kozela te.

Na liyebisi abimisi lelo, Moussa Faki Mahamat asengi na Rwanda na RDC kosukisa matata na bango na masolo mpe boyokani ya bondeko na nzela ya mécanismes régionaux ; Misala myango mikambami ngambo moko na mokonzi ya Angola mpe motambwisa sika CIRGL (Likita lya bikolo bya Grands lacs) Joao Lourenço, lmpe ngambo esusu na misala mya Nairobi miye mikambami na mokonzi ya Kenya mpe motambwisi ya Lisanga lya biklo bya Afrika ya Est (CEA), Uhuru Kneyatta.

Moussa Faki Mahamat alobi azali kolanda na bokebi makambo mazali koleka na est ya RDC.

Kolanda matotoli ya bavandi mpe ya société civile, baike ya mampinga ma Ekolo Congo démocraitque bakatisi ngambo ya Ouganda mpo na kokima.

HCR, misala mya ONU mpo ba bakima bitumba elobi bavandi koleka nkama misato na ntuku motoba na mwabe bakimi na Ouganda mpe lokola. Bitumba bizali kokoba nzinga nzinga na Bunaganga.

Molobeli ya FARDC na secteur opérationnel Sukola 2, colonel Guillaume Njike alobi mampinga Bunagana ezali nanu na maboko ma mampinga ma RDC.

XS
SM
MD
LG