Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na Kagame bakutani na Aqaba


Président Félix Tshisekedi ya RDC (G) na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame bapesani mbote na Aqaba, Jordanie, 24 mars 2022, (Présidence Rwanda)
Président Félix Tshisekedi ya RDC (G) na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame bapesani mbote na Aqaba, Jordanie, 24 mars 2022, (Présidence Rwanda)

Président Félix Tshisekedi ya Ekolo Congo démocratique na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame bakutanaki na Aqaba, na Jordanie, epayi bazali na likita Aqaba Process Meeting mpo na est ya Afrika.

"Président Kagame na président Tshisekedi bazalaki na bokutani ya bondeko mpe ya malamu na maye matali boyokani ya bikolo mibale mpe etuka," elobi présidence ya Rwanda na compte Twitter na yango.

"Bakonzi ya bikolo mingi bazali na likita ya mikolo mibale na Aqaba mpe bazali kolobela bokengi na bisika mingi na molongo lokola na RDC, mpe misala mya badongolomeso," eyebisi na ngambo na yango na Twitter, présidence ya RDC.

Mokonsi ya RDC akutani mpe na mokonzi Mozambique mpe Ministre wa yambo ya Tanzanie

M. Tshisekedi azali na Jordanie wuto mokolo mwa misato nsima na mobembo mwa ye na Emirats arabes unis esika azalaki na mokolo mwa RDC na Expo 2020.

Mokonzi ya RDC ayambamaki na mokonzi ya Jordanie Jordanie Abdukah II mpe basololaki mpo na boyokani kati na bikolo mibale.

M. Kagame ye mpe akomaki na Aqaba o’mokolo mwa misato mpe na mokonzi ya Jordanie Abdukah II.

XS
SM
MD
LG