Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayi mbulamatari bawangani mampinga ma Uganda na mabele ma RDC


Président Yoweri Museveni ya Uganda alati sokoto na Gulu, nord ya Uganda, 6 février 2005.
Président Yoweri Museveni ya Uganda alati sokoto na Gulu, nord ya Uganda, 6 février 2005.

Mbulanatari ya Ekolo Congo démocratique ewangani bozali to bokoti ya mampinga ma Uganda (UPDF) na mabele ma Congo nsima na nungu nugnu ebimaki na sango epesamaki mpo na yango.

Molobeli ya mbulamatari ya RDC, Patrick Muyaya nde alimboli yango na bokutani na bapanzi sango na Kinshasa.

"Bondimela biso, mamapinga ma Uganda mazali te na mboka na biso kasi boyokani bozali kati na bikolo mibale mpo na kopesana sango ya bokengi," elobi M. Muyaya.

Molobeli ya mbulamatari alimboli yango nsima na sango epesamaki ete mokonzi akopesa mitindo mpo ete mampinga ma Uganda makota na mabele ma RDC.

Ba sanza eleki, président Yoweri Museveni asakolaki polele ete mampinga ma Uganda mabongisami mpo na kokende kobundisa batomboki ya ba ADF kasi mazli kozela ndingisa ya bakonzi ba RDC.

Ba ntoma ya bikolo misusu mpe bapesaki sango yango.

Nungu ngungu ebimaki na RDC mpo na yango.

“Mokano mwa president Tshisekedi ya kopesa ndingisa na mampinga ma Ouganda kokota na mabele ma RDC makoki kondimama te. Toboyi baye bapepisaka moto mpo baluka koboma yango. Mbeba ya kala ekobota kaka mbuma moko wana," ekomaki na Tiwtter Dr. Mukwege.

Basusu na RDC bandimi ete mampinga ma Uganda makota na mabele ma Congo.

"Ba ADF bawuta na Uganda mpe bazali likama mpo na bikolo mibale. Ekozala malamu ete mampinga ma Uganda maya kosukisa bobomi ba ADF bazali kokoba kosala na Beni mpe Ituri mikolo minso. Mampinga ma Uganda malakisa bokasi na yango. Mampinga ma RDC mazali kokota te kosuki ba ADF. Esali mamlu UPRDF (mampinga ma Uganda) maya kosukisa bango," elobi na VOA Lingala kalaka mokonzi ya lingomba (ya kala ya batomboki) RDC/KML mpe mokeli mibeko ya ekolo.

Uganda efundamaki mpe ekatelamaki etumbu na Tribunal international ya Justice mpo na mbeba mampinga ma yango masalaki kati na 1998 kino 2004 na RDC.

Mampinga ma Uganda na maye ma Rwanda babunda mbala mibale na Kisangani ntango bazali na RDC mpo na kosunga batomboki baye, baike, AFDL, bakweyisaki bokonzi ya Mobutu Sese Seko nsima na mibu 32 ya kokonza na makasi.

XS
SM
MD
LG