Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kigali epameli mpepo ya bitumba moko Sukhoi-25 ya Kinshasa kokota na Rwanda


Mpepo ya bitumba Suhkhoi-25 na mapata ma Saraqib, na west ya Aleppo, Russie, 1er février 2018.
Mpepo ya bitumba Suhkhoi-25 na mapata ma Saraqib, na west ya Aleppo, Russie, 1er février 2018.

Kigali epameli mpepo ya bitumba ya mampinga ma Ekolo Congo démocratique kopumbuka likolo na Rwanda mpe kokita na mabele ma Rwanda na bobuki mibeko.

"Sukhoi-25 ya bitumba moko ewutaki Ekolo Congo démocraique ekotaki likolo ya Rwanda na bobuki mibeko na 11h20 ya ntongo mpe ekikaki ntango moke mpenza na libanda lya mpepo ya Rubavu na etuka eye ya west," ekomi molebeli ya mbulamatari ya Rwanda na liyebisi abimisi na libandela lya nsima ya nzanga.

Kigali eyebisi mpe ete "eloko moko te esalamaki bo’ eyango ya mampinga na bayi Rwanda, mpe mpepo yango ezongaki na RDC".

Na ngambo na yango, Kinshasa endimi ete mpepo ya Sukhoi-25 ya mampinga ma yango etambolaki na bobungi na mapata ma Rwanda.

"Mbulamatari ya RDC ekundoli ete kaka lolelenge RDC esalaka nyonso mpo na kobatela ma yango, RDC ezalaka te na makanisi ma kokota na bobuki mibeko na mabele ma bikolo nzinga nzinga," elakisi liyebisi lya ministère ya sango mpe media ya RDC.

"Bakonzi ba Rwanda bapameli motumoli moye yna mbulamatari ya RDC eye endimi likambo loyango," elobi liyebisi lya Kigali.

Kinshasa elobi eloko te soki mpepo yango ekitaki na Rubavu lokola Kigali efundi yango.

Nzoka nde, bikolo biye mibale bizali na masolo wuto mposo moleki mpo na koluka kozongisa kimya mpe boyokani o kati na bango.

Vincent Biruta mpe Christophe Lutundula, ba ministres ya mambi ya bapaya ya bikolo biye mibale bakutanaki o mokolo mwa mposo moleki na Luanda na ekolo Angola liboso lya président Joâo Lourenco, mpe bayokanaki kokoba masolo kati na bango mpo na kozongisa kimia.

XS
SM
MD
LG