Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Botukani ya Kagame na Tshisekedi na Luanda: Ba M23 basengami kotika bitumba sika sika oyo


Président Oaul Kagame ya Rwanda (G) na Président Félix Tshisekedi (D) na Rubavu, Rwanda, 25 juin 2021.
Président Oaul Kagame ya Rwanda (G) na Président Félix Tshisekedi (D) na Rubavu, Rwanda, 25 juin 2021.

Président Félix Tshisekedi ya RDC na mokonaki wa ye ya Rwanda, Paul Kagame, bayokani na Luanda na Angola ete batomboki ba M23 batika bitumba kaka sika oyo, elobi présidence ya RDC na liyebisi na Twitter.

Misala to commission moko ekelami mpe ekokutana le 12 juillet ekoya na Luanda, na Angola, ebakisi Tweet ya présidence.

« Misala miye mibongisi ete ba M23 batika bitumba kaka sika, basenga eloko te mpe balongwa na bisika babotola na RDC, ebakisi présidence ya RDC.

Bakonzi babale babimisi feuille de route to linaka liye lilobi ete bozwami ya bomengo bwa mabele bosengeli kosalama na botosi bonsomi ya bikolo.

Linaka libakisi mpe ngambo inso ezali na mokano ya kozongisa malamu boyokani kati na Kinshasa na Kigali.

Bokutani kati na Tshisekedi na Kagame bosalamaki na bokambami ya Joao Lourenço, mokonzi ya Angola mpe mokambi ya CIRGL, likita lya bikolo bya etuka ya grands lacs.

Mikolo miye nsima ekolo Congo Democratique ekobi na kofunda ekolo Rwanda na kopesaka maboko na basimba minduki ya M23 mpo na kobundisa bayi Fardc, kasi ekolo Rwanda ezali kowangana yango, mpe esakoli ete bitumba byango bizali kati na bayi ekolo RDC bango moko.

XS
SM
MD
LG