Congo-Brazzaville ekozala na matanga mpo na nkondo Jacques Joachim Yhombi Opango, mokonzi ya kala, kolanda mokano ya président Denis Sassou N'Guesso.
Koleka bato 15 bakufi na maboko ma ba babundi bafundami kozala ba ADF na mboka Baeti, na Beni. Mokonzi ya mboka eye alobi batumbi ndako ya Nzambe nzike mpe mibongo. Erikas Mwisi azwaki litatoli lya mokambi mwa société civile Omar Kavota.
Etats-Unis na Ekolo Congo démocratique batie manzaka na protocole d’accord to mokanda moko pesa nzela na bozongeli ya bondeko mpo maye matali mampinga kati na bikolo bibale biye.
Denis Sassou N'Guesso lokola mpe Félix Tshisekedi bazwaki maloba na colloque ya kokanisa mibu 80 wuto Général Charles DeGaulle asakolaki Brazzaville bo' engumba mokonzi ya France ya Afrika ya west ya bonsomi. Sassou asengi Afrika ekoma na véto mpe Tshisekedi, lisungi mpo na kobundisa badongola meso.
Mokeli mobeko Muhindo Nzangi oyo asengaki ministre d’Etat mpe ministre ya Décentralisation Azarias Ruberwa, asengi ministre eye kotika ye moko mosala mpo akosaki na likambo lya botiami Minembwe bo’ commune.
Linata "Na Bozindo" ya Eddy Isango na VOA eyambaki professeur Kibiswa Naupes, moyi Filimbi mpe LUCHA Carbone Beni mpe Emery Kalwira ya CCT mpo komanyola maye mazali kosalama nsima lisikulu ya président Tshisekedi. Mposo moye nde masolo ya koyoka bato nde makobanda.
+Brazzaville na milulu mya bokanisi Manisfeste ya Brazzaville, Tshisekedi azali kuna +Bayi FCC bazali kokoba masala nzinganzinga ya Kabila +Pene na bato 20 bakufi na matata ya maponami na Guinée +Félicien Kabuga atindami na la Haye
Président Félix Tshisekedi azali na Brazzaville mpo na milulu mya mibu 80 nsima na bosakoli bwa engumba eye lokola elombo ya botelemeli Allemagne ya ba Nazi Itler ntango ya bitumba ya molongo.
Bakambi ba mangomba kati na FCC bazalak kokutana lelo na Kingakati pene na Kinshasa nzinganzinga na mokonzi na bango, président ya kala Joseph Kabila, mikolo misato nsima na lisikulu ya président Félix Tshisekedi.
+Fayulu azongisi makasi maye mpo na kobima na nkwokoso na mesa nsima na Tshisekedi koloba alingi ayoka bato +FARDC ebotoli GG ya ba FNL Nzambampema +Israel ekopesa 5 millions $ ya blé na Sudan +UA na CEDEAO babandi masolo na Guinée mpo na kimya nsima na elonga ya Alpha Condé
Président Félix Tshisekedi alobi na ete akobanda masolo mposo mokoya na ntina ya kotala ndenge nini kosangisa bato na ntina ya kosala mbongwana na bokambi mboka na ndenge ya sika. Masolo mango makosalama na bayi bolitiki mpe bato basusu ba misala mya mboka.
Ntoma mokambi ya limpinga to delegation ya Union européenne na RDC, Jean Marc Châtaigner, alobi ete Union européenne ekokota te matata kati mazali na RDC kasi elingi nde boyokani.
Union européenne eboyi kokota na matata ya kati na RDC kasi elingi boyokani Ntoma mokambi ya limpinga to delegation ya Union européenne na RDC, Jean Marc Châtaigner, alobi ete Union européenne ekokota te matata kati mazali na RDC kasi elingi nde boyokani.
+Trump na Biden bandohwanaki mpo na mbala ya suka yambo na maponami ma le 3 novembre +Tshisekedi akozwa malabo liboso na ekolo +FCC eboyi kondima bazuzi constitutionnels basota mpe elobi makambo bakosala matali bango te +Guterress asengi kimya yambo na maponami na Côte d'Ivoire
Bakambi ba mangomba ya FCC basakoli ete bandimi te bazuzi basato balapaki ndayi mercredi. Bazalaki na likita jeudi. Balobi bakosalela makoki manso mpo makasi manso maselema mpo na komema démocratie mazala mpamba te. Président Fèlix Tshisekedi akozwa maloba vendredi liboso na ekolo. [S.Bujakere]
Etats-Unis ebakisi millioins motoba ya ba dollars na misala mya kobebisa bibundeli bibengami armes convetionnelles na Ekolo Congo démocratiques
Président Félix Tshisekedi aboyi likita lya mbulamatari lya mokolo mwa mitano mokoya mpe asakoli ete akozwa maloba liboso na Ekolo.
+Fayulu asengi CENI na Cour constitutionnelle ezala ya bonsomi mpenza +HWR esengi bokangami bwa Guidon Shimiray mokambi ya ba NDC-R +Ba FIPC babomi basoda, ba policiers na ba civili na Irumu +Buyoya aboyi kondima etumbu akatelami mpo na liwa ya Ndandaye na Burundi
Mokonzi ya kala ya Burundi Pierre Buyoya, oyo azali lelo molakisi elongi ya Union africaine na Mali, akatelami na mosika, etumbu ya boloko ya libela mpo na liwa nkondo Melchior Ndandaye oyo akitanaki na ye na bokonzi na 1993 na mboka na bango.
ONG Human Rights Watch esengi na bakonzi ya RDC kokanga Guidon Shimiray Mwissa, mokonzi ya batomboki ba NDC-R, efundama mpo na mbeba mingi na monyele ya mboka. Lokola mpe bakonzi banso ba mampinga ma RDC basungaka ye.
Voir plus