Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou atie matanga na mboka mpo na Yhombi Opango vendredi


Mokonzi ya kala ya ekolo Congo-Brazzaville, Jacques Joaquim Yhombi Opango, Septembre 2019. (Twitter/Opango Yhombi)
Mokonzi ya kala ya ekolo Congo-Brazzaville, Jacques Joaquim Yhombi Opango, Septembre 2019. (Twitter/Opango Yhombi)

Congo-Brazzaville ekozala na matanga mpo na nkondo Jacques Joachim Yhombi Opango, mokonzi ya kala, kolanda mokano ya président Denis Sassou N'Guesso.

Nzoto ya nkondo Jacques Jaochim Yombi Opango, ekomaki na Brazzaville na mpokwa ya jeudi.

Ewuti France epayi wapi M. Opango afukaki le 30 mars na COVID-19.

Mbulamatari ezelaki ndingisa ya libota lya ye.

Président Denis Sassou N’Guesso akati ete mokolo mwa mitano mozala matanga na Congo-Brazzaville mobimba.

Jacques Jaochim Yombi Opango azalaki mokonzi wuto 1977 kino 1979.

XS
SM
MD
LG