Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

USA na RDC batie manzaka mpo na boyokani ya mambi ma mampinga

Ntoma ya Amerika Mike Hammer (G) na ministre ya Bobateli Ekolo ya RDC Aimé Ngoy Mukena na milulu mya botimami manzaka na boyokani mpo kosunga mampinga ma RDC, na alais de la Nation, Kinshasa, 28 octobre 2020. (Twitter/RDC)

Etats-Unis na Ekolo Congo démocratique batie manzaka na protocole d’accord to mokanda moko pesa nzela na bozongeli ya bondeko mpo maye matali mampinga kati na bikolo bibale biye.

Ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer, na ministre ya Bobateli bwa Ekolo RDC Aimé Ngoy Mukena nde batiaki manzaka na mokanda mwango na Palais de la Nation na Kinshasa.

Boyokani bwango bozali mpo na kosunga mampinga ma RDC koyeba kosala mosala na alima mpe na ndenge esengeli.

Mike Hammer alimboli ete ezali mbano ya bomipesi ya Félix Tshisekedi na koluka kosukisa lolenge ya kotinda bana mboka na libanda na lolenge ya mabe mpe na mikano mya kopesa etumbu na mbeba inso ya lolenge wana.

Ministre Ngoy alobi yango ezali nde bozongeli bondeko ya bikolo bibale mpo na maye matali mampinga nsima na mibu mingi ya malili.

XS
SM
MD
LG