Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi na milulu mya mibu 80 ya bosakoli Brazzaville lokola engumba ya France ya bonsomi


Président Félix Tshisekdi nsima na bokomi na Brazzaville, Congo, le 26 octobre 2020. (Twitter/Fatshi News)
Président Félix Tshisekdi nsima na bokomi na Brazzaville, Congo, le 26 octobre 2020. (Twitter/Fatshi News)

Président Félix Tshisekedi azali na Brazzaville mpo na milulu mya mibu 80 nsima na bosakoli bwa engumba eye lokola elombo ya botelemeli Allemagne ya ba Nazi Itler ntango ya bitumba ya molongo.

Brazzaville ekozala wuto lobi le 27 octobre kino mercredi le 28 octobre na milulu mya bokanisi ntango General Charles de Gaulle asakola engumba lokola likonzi lya bitelemeli ba Allemange na ba Nazi mpe Hitler na bitumba bya molongo mibu tuku mwambe mileki.

Barzzaville ekomaki engumba mokonzi ya Afrique ya monyele na nse ya bokonzi ya France.

Président Denis Sassou N’Guesso abengisi mpo na yango bakokani ba ye ba bikolo ba Afrika mpe ya mikili misusu.

Président Félix Tshisekedi akatisi na Brazzaville na ntina yango.

Ministre ya Mamabi ya bikolo bya bapaya ya France, Yves LeDrian azelami.

Lokola mpe bakonzi ba Tchad, Centrafrique, Cameroun na Gabon mpe basengeli kozala wana.

XS
SM
MD
LG