Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Muhindo Nzangi asengi Ruberwa kotika mosala mpo akosaki


Azarias Ruberwa, vice-président ya kala ya RDC, na Kinshasa, 2006. (Photo ezaka date/AFP)
Azarias Ruberwa, vice-président ya kala ya RDC, na Kinshasa, 2006. (Photo ezaka date/AFP)

Mokeli mobeko Muhindo Nzangi oyo asengaki ministre d’Etat mpe ministre ya Décentralisation Azarias Ruberwa, asengi ministre eye kotika ye moko mosala mpo akosaki na likambo lya botiami Minembwe bo’ commune.

Député Muhindo azwaki maloba nsima na M. Ruberwa kopesa ya ye eyano na bobengisami na ye mpo na likambo lya milulu mya kotia na ebonga bourgmestre ya Minembwe.

Likambo lizali kati na matata makasi kati na Banyamulenge, Bafulero, Banyindu, Bavira mpe kabila misusu evandaka na esika yango.

"Lokola minstre Ruberwa alakaki ye moko na Jeune Afrique ete akotika mosala soki emonani ete akosi, mpe kolanda maye manso nalakisi bino awa, nakosenga na ye atika ye moko mosala," elobi M. Muhindo.

Ministre Ruberwa alobaki ete bokeli bwa Minembwe bosalamaki na kolanda mikano mya mbulatari.

M. Ruberwa mpe apemelaki ministre ya Intérieur ya Nord-Kivu oyo awanakaki maloba ya M. Ruberwa kolaba ete ye nde esalaki milulu mya botiami ya Minembwe bo’ commune elongo na mokambi ya etuka.

Nzokande ministre ya Intérieur asalaki vidéo mpe afundaki na kati ministre Rubrwa na kopesa ye mibeko elongo na mokambi ya Nord-Kivu ya kosala milulu myango.

Na maloba ma ye, député Muhindo asengi ete Ministre wa yambo azwo mokano ya kolongola mokano ya bokeli Minembwe mpo ezali na bato mingi te mpe ekokisi te makambo masusu mibeko misengi. M. Muhindo mpe asengi ete likambo lyango limemama na Conseil d'Etat.

M. Nuhindo asengi lisusu ete bokelami bwa ba communes misusu bolandelama malamu.

XS
SM
MD
LG