Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi aboyi likita lya mbulamatari mpe alaki kozwa maloba liboso lya Ekolo vendredi


Président Félix Tshisekedi na ndako ya mosala na ye na Cité ya Union africaine na Kinshasa, 22 octobre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na ndako ya mosala na ye na Cité ya Union africaine na Kinshasa, 22 octobre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi aboyi likita lya mbulamatari lya mokolo mwa mitano mokoya mpe asakoli ete akozwa maloba liboso na Ekolo.

Yango esalami nsima milulu mya mokolo mwa misato mya bolapi ndayi bwa bazuzi basato batiamaki na président Félix Tshisekedi kasi bayi FCC, linigomba linene lya mokonzi ya kala Joseph Kabila, baye baleki mingi kati na misala (instutitions) ya mboka, bazalaki te. Ezala bayi mbulamatari to bayi suku mibale ya Parlement, longola moko moko ya botanga.

Mpo na FCC, Felix Tshisekedi abukaki Buku likonzi.

"Mokonzi ya mboka, tata ya ekolo, akozwa maloba vendredi 23 octobre 2020. Mpo na yango, bokutani bwa mbala 54 ya likita lya bayi mbulamatari lisengelaki kosalama mokolo wana litindami na mokolo mokoya nsima, ekomi na liyebisi mokambi molandi mwa ndako ya mosala ya président Tshisekedi," Désiré-Cashimir Kolongele Eberande.

Na ngambo na yango, Assemblée nationale mpe epusi na mokolo moyebani te makita manso.

Molobeli to rapporteur na yango akomi na liyebisi ete ezali mpo na malako ma comité multisectoriel ya bitumba na bokono bwa COVID-19.

Esengelaki Ministre ya Décentralisation Azarias Ruberwa apesa lobi loleki (jeudi) eyano na mituna mya bakeli mibeko mpo

Matata mazali kati boyokani ya kokamba mboka bosalama na CACH, lingomba linene nsima na Félix Tshisekedi, na FCC.

Bato baike bazali kosenga libala likufa kati na CACH na FCC. Kati bango, ONG ACAJ.

Kasi bamanyoli basusu balobi ekosenga yambo matata makasi mazala kati na ba instutions mpe matata yango mapekisa botamboli ya mboka.

Mpe lisusu, eskosengela Félix Tshisekedi asolola yango na mokambi ya mbulamatari mpe na bayi Parlement.

Basusu lokola lisanga lya maponami AETA (Agir pour des Elections Transparentes et Apaisées) esengi Félix Tshisekedi na Joseph Kabila basolola mpo na kosilisa matata maye.

Martin Fayulu, opposant, mkambi ya ECIDE mpe motambwisi ya Lamuka asengaki ete bakambi ba biyamba bamema masolo na mboka.

M. Fayulu asengaka maponami yambo na ngonga mpo na kosilisa nkwokoso na mboka.

XS
SM
MD
LG