Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabila akutani na bakambi ba mangomba ya FCC na Kingakati


Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe mokambi ya FCC apesi mbote na Néhémie Mwilanya, motambwi ya FCC (2e) mpe Emmanuel Ramazani Shadary na bokutani na Kingakati, Kinshasa, 23 décembre 2019. (Sylvie Bongo)
Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe mokambi ya FCC apesi mbote na Néhémie Mwilanya, motambwi ya FCC (2e) mpe Emmanuel Ramazani Shadary na bokutani na Kingakati, Kinshasa, 23 décembre 2019. (Sylvie Bongo)

Bakambi ba mangomba kati na FCC bazalak kokutana lelo na Kingakati pene na Kinshasa nzinganzinga na mokonzi na bango, président ya kala Joseph Kabila, mikolo misato nsima na lisikulu ya président Félix Tshisekedi.

M. Kabila akokoba koyoka bayi FCC mposo mobimba, Bakambi banso ba mangomba mazali kati ya FCC bazalaki wana longola kaka baike baye bazali na mbulamatari, elobi baike ba lingomba baye.

Mardi, likita likozala na bakeli mibeko ba FCC, ebaki moko na baike FCC.

Mposo ebandi lelo nde boyoki bato président Tshisekedi asakoli nde bosengeli kobanda.

Tokundola ete président Tshisekedi alingi koyoka bakambi bapolitiki ya motuya mpe ya misala misusu na ntina koluka ya komeka kobimisa mboka na nkwokoso ezali na boyokani ya bokambi ekolo kati na lingomba na ye CACH na FCC ya Joseph Kabila.

Misala mya koyoka bato na président Tshisekedi mikosala mikolo zomi, elobi bayi présidence ya RDC.

Président Tshisekedi apamelaki ebaka ezali kopekisa mboka kokende liboso nsima na mibu mibale boyokani ya CACH na FCC.

"Tango tozalaki na boyokani ya CACH na FCC ezalaki lokola kati na motuka na bakumbi babale. Motuka mozalaka kaka mokumbi moko," elobaki Kitenge Yesu, osungi ya monene ya misala ya Félix Tshisekedi, o'mokolo na mposo na likita ya UDPS, lisanga ya mokonzi ya mboka.

Matata makamaki makasi kati na FCC na CACH nsima na bolapi ndayi ya bazuzi basato baye FCC elobi président Tshisekedi atiaki na kobuka Buku likonzi.

XS
SM
MD
LG