Nicolas Sarkorzy, mokonzi ya kala ya France (2007-2012) akatelami mibu misato mya boloko mpo na kaniaka mpe kosalela nguya na ye mpo komema makambo, lundi na bosambisami na Paris na France. Ezali mpo na misolo miwuta na Libye.
Bakoni basatu basusu bazwami na Ebola na zone ya santé ya Butembo. Motango ya baye bazwami no bokono boye bokomi 11 wuto Ebola ezongeli na libandela ya sanza ya mibale.
Donald Trump, mokonzi abimi na bokonzi na Etats-Unis, alobaki dimanche eleki ete akoki kozonga na bokonzi na 2024.
Président Félix Tshisekedi na vice-présidente ya Etats-Unis Kamala Harris basololi vendredi na visoconférence, elobi bayi présidence ya RDC.
OCCRP, Mambongisi matalaka ba crimes organisés to mbeba ebongisama mpe bitumba na kaniaka efundi Congo-Brazzaville na kosomba na kobombama 500 tonnes ya minduki na Azerbaidjan wuto 2015.
Martin Fayulu na Adolphe Muzito nde bakokamba lingolmba Lamuka mpe bakopesana bokonzi ngala na ngala, elobi bango na liyebisi nsima na likita basali o’mwa mitano na Kinhasa, na bozangi ya Moïse Katumbi na Jean-Pierre Bemba.
“Moto moko ayebisaki na babomi ya ntoma ya Italie Luca Attansio nzela esnegelaki aleka,” elobi molongani wa ye Zakia Seddiki na nkasa ya sango ya Italie Il Messagero.
+Bobimi bwa rapport ya Amerika mpo na liwa lya mopanzi sango ya Arabie Khashogy +Balongi ya DV 2020 bapesami ndingisa ya koya na USA +Campagne ya mponami ya Bureau ya Sénat epusani mpo na bobandi ya mobu mwa ntoki ya Tshisekedi na Union africaine +Likita lya bakambi ba Lamuka na Fayulu
Directeur ya cabinet adjoint ya ministère ya Intérieur, aristide Bulakali apesami etumbu na na vice-ministre ya Intérieur mpo na liyebisi abimisaki nsima na liya lya ntoma ya Italie Luca Attanasio lundi.
Joseph N’Singa Udjuu, Ministre wa Yambo ya kala Ekolo Congo démocratique akufi mercredi na Lipitalo ya Cinquentaire na mibu 86.
+Papa François alobi ntoma Luca Attanasio ya Italie azalaki litatoli lya bomoto mpe ya bokristu +Grennfield andimami na Sénat ya Amerika bo' ntoma ya USA na ONU +Bakangami 62 bakufi na bitumba na boloko misato na bitumba ya bateki bangi na Equateur +Mangwele ma Ebola mabandi kopesama na Guinée
Ba ambassadeurs to ba ntoma ba bikolo ya bapaya to mpe balakisi bilongi ya misala mya mboka ya bapaya bapekisami mibembo kati na bituka soki bazwi ndingisa ya mbulamatari ya RDC te.
VOA Lingala ebengaki molebeli ya ba FDLR , Cure Ngoma, nsima na liyebisi na bango kowangana bobomi ya ntoma ya Italie Luca Attanasio mpe kofunda mampinga ma Rwanda na ma RDC. Totala.
+Bokengi bosengami na monyele ya RDC lokola kelasi ezongi +Libota lya Malcon X lisengi bobandeli bwa bolukiluki mpo na liwa lya ye +Bato banei bakufi n'Ebola na Biena na Nord-Kivu +Sassou afungoli misala mua botongi raffinérie ya pétrole na Fouta
Bato koleka 500 bazwani na bokono bwa peste mpe koleka 30 bakufi na yango na Biringi, na Aru, na Ituri.
+Rover "Perseverance" etindi bilili bya yango bya yambo nsima na kokita na Mars +Koleka bato 30 bakufi na malili mazali kobeta na Etats-Unis +PM ya Côte d'Ivoire Hamed Bakayoko atindami na France na bokono +Boluki ya bakoni bwa Ebola bokosalama mpe na Byakato na Ituri
Motuka to rover "Perserverance" (Bopikiliki) ekitaki malamu na planète Mars mpe etindi bilili bya yango bya yambo. Esali sanza sambo wuto etindamaki wuta Cape Canaveral na Florida. Esalaki mobembo ya ndambo ya milliards ya kms likolo na Mars. Etinda na yango ezali kotala soki bomoi bozalaki kuna.
Mokonzi ya Togo Faure Gnassingbé akomi jeudi na Brazzaville mpo na masolo na mokokani wa ye Denis Sassou N’Guesso ya Congo-Brazzaville.
+Sassou na ba candidats mosusu motoba nde bandimami mpo na maponami ma le 21 mars na Cour constitutionnelle +Policier Jacques Mugabo afundama na liwa lya Chebeya na Bazana, akangami kati na Bakata Katanga +Gnassingbé azo'kutana na Sassou na Brazzaville +Lotiliki lozangi mpo na malili na USA
Jean-Michel Sama Lukonde, ministre wa Yambo ya sika ya RDC akutani na Ilunga Ilungakamba ministre wa Yambo oyo abimi na ebonga. Bazali kobongisa bopesani ya bokonzi bokosalama nsima na M. Sama lukonde kondima mpe kovandisama na Assembée nationale. TOTALA
Voir plus