Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato koleka 30 bakufi mpe koleka 500 bazwami na peste na Ituri


Mwasi moko na lopitalo moko na Bunia, na Ituri, 2 mars 2018.
Mwasi moko na lopitalo moko na Bunia, na Ituri, 2 mars 2018.

Bato koleka 500 bazwani na bokono bwa peste mpe koleka 30 bakufi na yango na Biringi, na Aru, na Ituri.

"Tozali sika na koleka bakoni 520 ya peste, kati na bango 31 bakufi, elobi ministre ya etuka ya Ituri ya Bokolongo," Dr. Patrick Karamura. Alobi peste ezalaka endémique (ezongelaka) mingi na Ituri.

Peste yango ezali bubonique te kino sika kasi bato batono bazwami na peste pulmonaire mpe mibale peste septicémique.

Bakoni babandaki kozwama le 15 novembre mpe le 13 décembre, elobi Dr, Anne Laudisoit, épidémiologiste mpe moyi Amerika asalaka na ONG Ecohealth Alliance eye azalaka na New York, kasi azali na lipinga na ye na Ituri mpo na bokono boye.

Kolanda Dr. Laudisoit, bakoni bazali mingi na mibu 13 kasi ya elenge koleka azali na mibu misato mpe ya mobange na 73.

Mpuku mingi ekufaki na yango mpe sili ekenda epayi na bato kpesa bango bokono.

OMS elobi eyebaki bozongi ya bokono bwa peste na Ituri na juin 2020 mpe ebelelaki mikoli na sanza ya juillet.

XS
SM
MD
LG