Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekdi na Kamala Harris basololi mpo na Ebola, bokengi na makambo masusu


Président Félix Tshisekedi na bokutani na bokutani ya bokengi na Kinshasa, 23 février 2021. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi na bokutani na bokutani ya bokengi na Kinshasa, 23 février 2021. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi na vice-présidente ya Etats-Unis Kamala Harris basololi vendredi  na visoconférence, elobi bayi présidence ya RDC.

Masolo ma bango masalaki 45 minutes mpe balobelaki mingi mpenza Ebola, COVID-19 mpe bokengi, eyebisi Maison Blanche lokola mpe bayi présidence ya RDC.

Vice-présidente Kamala apesaki losako na M. Tshikedi mpo na kozwa bokambi bwa Union africaine.

"Batalaki mpe lolenge ya koyikisa makasi na bobateli bokolongo, kokolisa mombongo na etuka mpe kokekala misala, kotombola makoki ma bomoto mpe bokambi bolamu, mpe kopesa biyano na maye matali mbongawna ya climat," elobi liyebisi ya Maison Blanche,

Bakonzi babale balobeli mpe maye mazali kosalama na politiki na RDC mpe liwa lya ntoma ya Italie Luca Attanasio o’mwa yambo moleki na Kibumba, na Nord-Kivu.

VP Kamala abetaki sete na maye matali bobuki ya mamakoki ma bomoto na Tigrée, etuka ya Ethiopie, epayi bitumba bizali kongala.

Bakonzi babale bondimi kosala elonngo mpo na kokitisa matata, kopesa maboko na masolo, mpe komema kimya na monyele ya RDC mpe na etuka ya kati ya Afrika.

Président Tshisekedi alimboli maye asalai mpo na kozwa majorité mpe kotia na esika ministre wa Yambo mpo na kokoka kosalela politiki na ye.

Ezali mbala ya yambo vice-présidente Harris, mwasi ya yambo mpe moyindo ya yambo akomi ebonga na ye, asololi na mokambi ya RDC.

XS
SM
MD
LG