Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakoni basato basusu bazwami na Ebola na Butembo


Minganga ya MSF bazali kopesa manwele ma Ebola na moto moko na Goma, Nord-Kivu, 14 novembre 2019.
Minganga ya MSF bazali kopesa manwele ma Ebola na moto moko na Goma, Nord-Kivu, 14 novembre 2019.

Bakoni basatu basusu bazwami na Ebola na zone ya santé ya Butembo. Motango ya baye bazwami no bokono boye bokomi 11 wuto Ebola ezongeli na libandela ya sanza ya mibale.

Ministre ya bokolongo ya nzoto ya Nord-Kivu, Eugene Nzanzu Salita nde apesi sango yango o’mokolo mwa yambo.

"Bakoni basusu basato babakisami mpe motango ya bakoni ya Ebola ekomi sika zomi na moko," elobi ministre Nzanzu Salita.

Bato babale nde bakufi wuto bokono boye bozongeli na zone ya santé ya Butembo.

Ebola boye bowuta kosila na sanza ya motoba moleki mobomaki bato nkoto mibale na nkama mibale na mibu mibale.

XS
SM
MD
LG