Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Liwa ya Attanasio : DirCab Adjoint ya ministère ya Intérieur azwi etumbu mpo na liyebisi lipamelaki ba FDLR


Nzoto ya ntoma Luca Attanasio ntoma ya Italie na RDC na ya mobateli na ye ekomi na libanda lya mpepo ya Rome, Italie, 23 février 2021.
Nzoto ya ntoma Luca Attanasio ntoma ya Italie na RDC na ya mobateli na ye ekomi na libanda lya mpepo ya Rome, Italie, 23 février 2021.

Directeur ya cabinet adjoint ya ministère ya Intérieur, aristide Bulakali apesami etumbu na na vice-ministre ya Intérieur mpo na liyebisi abimisaki nsima na liya lya ntoma ya Italie Luca Attanasio lundi.

"…M. Arisitde Bulakali, mokambi molandi ya ndako ya mosala ya ministère eye, misala miye mitelemisami wuto mardi 23 février 2021 mpo atiaki manzaka mpe apimisaki na botindami te, liyebisi… lundi 22 février 2021 na ba media baike ya mboka mpe ya libanda na nkombo ya vice-Premier ministre, ministre ya Intérieur mpe ya mbulamatari ya mboka nsima na bobomi ya ntoma ya ekolo Italie na baninga ba ye na etuka ya Nord-Kivu," esakoli na mokanda vice-ministre ya Intéruer Innoncent Bokelewaka.

Liyebisi libimisamaki nsima na liwa lya ntoma Attanasio lipamelaki batomboki ba FDLR (Forces démocratiques pour la libération du Rwanda) na bobomi boye.

Lobi mardi, ba FDLR bawangani yango mpe bafundaki nde mampinga ma RDc (FARDC) na ya Rwanda (RDF) na liwa lya ntoma Attanasio.

Ba FDLR, kolanda maloba ma molebeli na bango Cure Ngoma na VOA Lingala, balobi ntoma Attanasio na bato babale basusu bakufaki pene na bisika ba FARDC na RDF bazalaka na Kibumba, na 25 kms ya Goma, na Nord-Kivu.

Liyebisi lya mbulamatari lilobaki mpe lisusu ete mbulamatari mpe misala mya bokengi na mapinga ma RDC bayebaki te esika mpe etinda ya ntoma Attanasio na motambwisi motuka mpe mobateli wa ye mpo bakenda kosunga bango.

Ntoma Attanasio na mokumbi motuka wa ye, moyi RDC, na mobateli waye ya Italie, bakufaki lundi nsima na kobetama masasi na baye bayebati te.

XS
SM
MD
LG