Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Fayulu na Muzito basakoli ete kaka bango babale nde bokamba Lamuka


Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo eiytami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)
Adoplhe Muzito, Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba mpe Moïse Katumbi na bokutani, na photo eiytami na Twitter ya Lamuka, 27 mars 2020. (TwitterCoalition Lamuka)

Martin Fayulu na Adolphe Muzito nde bakokamba lingolmba Lamuka mpe bakopesana bokonzi ngala na ngala, elobi bango na liyebisi nsima na likita basali o’mwa mitano na Kinhasa, na bozangi ya Moïse Katumbi na Jean-Pierre Bemba.

Martin Fayulue na Muzito bayebisi ete Jean-Pierre Bemba na Moise Katumbi baye bazali mpe bakambi babale basusu ba Lamuka, basi batikaki lingomba liye mpo mibeko mya mboka mipesi nzela te na kozala na amangoma mabale makesana.

Martin Fayulu na Muzito batelemeli bobebi ya mboka wuto maponami mpe bapaleli président Félix Tshisekedi na koluka koyikisa makasi na bokonzi na ye na kobukaka mibeko mya mboka mpe na kaniaka.

Batelemi liwa lya ntoma ya Italie Luca Attanasio, mobateli wa ye mpe motambwisi motuka ya ONU.

Basengi mbongwana mpo na maponami mpe bakebisi ete bakopesa nzela te ete maponami mapusa ata ngonga moko.

XS
SM
MD
LG