Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sarkozy akatelami mibu misato ya boloko mpo na kaniaka na misolo mya Libye


Mokonzi ya kala ya France Nicolas Sarkozy (C) akomi na tribunal na bosambisami bwa ye, Paris, France, 1er mars 2021.
Mokonzi ya kala ya France Nicolas Sarkozy (C) akomi na tribunal na bosambisami bwa ye, Paris, France, 1er mars 2021.

Nicolas Sarkorzy, mokonzi ya kala ya France (2007-2012) akatelami mibu misato mya boloko mpo na kaniaka mpe kosalela nguya na ye mpo komema makambo, lundi na bosambisami na Paris na France. Ezali mpo na misolo miwuta na Libye.

M. Sarkozy akovanda mobu moko na boloko.

Tribunal correctionnel elobi ete ezalaki na boyokani ya kaniaka M. Sarkozy asalaki na bato basusu babable : haut-magistrat ya kala Gilbert Azibert mpe mosambeli ya mokonzi oyo ya kala Thierry Herzog na bofundami mpo na misolo mya Libye na campagne mpo na maponami M. Sarkozy alongaki na 2007.

N. Sarkozy alandelamaka mpe mpo na kaniaka na makambo misusu.

Bazuzi balobi nzela ya singa ya M. Sarkozy elandelamaka wuto 2013.

Bazuzi balobi bamonaki ete M. Sarkozy asalelaka nzela mosusu ya singa ya kobombama na nkombo ya "Paul Bismuth" mpo na masolo na Thierry Herzog.

Mpo na bazuzi, M. Sarkozy akweyi o’likambo mpo alakaki kopesa mapoko na M. Azibert mpo na ebonga ya lokumu na Monaco, likolo na sango ya motuya, mayuya mpo bosambisami magistrat oyo salaki mpo na ye.

M. Sarkozy akotelema liboso lya bazuzi basusu le 17 mars mpo na likambo lya "Bygmalion" litali misolo mya campagne na ye na 2012.

XS
SM
MD
LG