Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto moko atekaki ntoma Attanasio na babomi, elobi molongani wa ye


Ba soda bamemi sanduku ya nzoto ya ntoma Luca Attanasio na ya mobateli wa ye Vittorio Iacovacci na matanga na Rome, Italie, 25 février 2021.
Ba soda bamemi sanduku ya nzoto ya ntoma Luca Attanasio na ya mobateli wa ye Vittorio Iacovacci na matanga na Rome, Italie, 25 février 2021.

“Moto moko ayebisaki na babomi ya ntoma ya Italie Luca Attansio nzela esnegelaki aleka,” elobi molongani wa ye Zakia Seddiki na nkasa ya sango ya Italie Il Messagero.

Zakia Seddiki alobi ezali moto moko azalaka Nzinga Nzinga ya libota nde atekaki ntaom Attanasio.

Ntoma Attanasio, mibu 43, akufaki na masasi ya basimba minduki bayebani te na Kibumba, na 15 kms ya Goma, na Kivu.

Mobateli wa ye ya Italie, carabienier Vittorio Iacovacci, mibu 30, na motambwisi motuka ya PAM (Mabongisi ma molongo mpo na bilei) Mustafa Baguma Milambo, mibu 56, bakufaki mpe lokola.

Jeudi, balukiluki motoba batinami na mbulamatari ya RDC bakomaki na Goma mpo na misala koluka koyeba nini elakaki solo.

Bayi mbulamatari ya Italie mpe batindamaki lolokola.

Yambo mbulamatari ya RDC efundaki bayi FDLR na liwa lyango kasi bango bawangani mpe bafundi na ngambo na bango bayi mampinga ma RDC na ya Rwanda.

Ntoma Attanasio na mobateli wa ye bakundamaki jeudi nsima na matanga na Italie.

XS
SM
MD
LG