Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

"UDPS ezo’banga te maponami ma lombango kasi ekosala yango te mpo kosepelisa FCC," A. Kabuya


Augustin Kabuya, kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, Kinshasa, 2020. (Présidence RDC)
Augustin Kabuya, kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba lya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, Kinshasa, 2020. (Présidence RDC)

"UDPS ezali na bobangi te ya maponami ma lombango," elobi kalaka mokonzi ya lingomba liye lya mokonzi ya mboka Felix Tshisekedi na eyano epsei na bayi FCC, lisanga lya mokonzi ya kala Joseph Kabila, liye lizali kosenga maponami mango soki mokonzi ya mboka akolinga kokela majorité ya sika.

Augustin Kabuya, kalaka mokonzi ya UDPS akomi na Twitter ete lingomba na bango ekoki kondima te maponami mango yambo na 2023 kaka mpo na kosepelisa FCC.

"Babomi mboka eye na motema mabe mbula zomi na mwambe, esengeli bakanga minoko," ekomi Augustin Kabuya.

Bayi FCC bazali kotelemela misala mya koyoka bato mokonzi ya mboka Tshisekedi azali kosala mpe bazali kopamela koluka kosomba bakeli mibeko na bango.

UDSP ebengisi o’mokolo mwa mposo botamboli mpo na kopesa maboko na misala mya koyoka bato. Nzokande bayi FCC bango mpe bakani kotambola kaka mokolo yango kasi mpo na kotelemela misala myango.

XS
SM
MD
LG