Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jaynet Kabila azelamaki na boyoki bato ya Tshisekedi kasi akendaki te


Jaynet KAbila, lipasa ya Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila, na bokutani na Jill Biden (D) molongani ya vice-président ya USA na Kinshasa, 4 juillet 2014.
Jaynet KAbila, lipasa ya Joseph Kabila mokonzi ya kala ya RDC Joseph Kabila, na bokutani na Jill Biden (D) molongani ya vice-président ya USA na Kinshasa, 4 juillet 2014.

Jaynet Kabila, lipasa ya mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila, moko na bayi PPRD mpe FCC, mpe mokeli mobeko azelamaki lundi 11 novembre 2020 na boyoki bato président Félix Tshisekedi azali kosala, kasi akendaki te.

Kolanda bayi présidence, Jaynet Kabila esengelaki ayamba na mokonzi ya mboka na 14h.

Kasi na ngonga yango, lipasa ya mokonzi ya kala azalaki na ye na Assemblée nationale esika mobeko motali bato ya mpasi na nzoto to bibosono, mozalaki kotalama.

Jayent Kabila azali moko na bayi PPRD, lisanga lya politiki lya Joseph Kabila mpe FCC, lingomba lisangisi masanga malandaka mokonzi ya kala (Kabila).

Bayi FCC balobaki o’mokolo ya eyenga na liyebisi ya suka ya likindo lya mposo moko, ete boyoki bato président Félix Tshisekedi azali kosala botali bango te.

FCC ezali kopamela boyoki bato boye mpo bozali koluka kotia majorité ya sika.

Bayi FCC balobi majorité mawutaka na maponami. Bazali kopamela bayi CACH, lingomba lya M. Tshisekedi na koluka kosomba bakeli mibeko na ntina ya kosala majorité ya sika.

Mpo na bango, esengeli kosala maponami masusu na bitapi binso.

FCC elobi ete matata mazali te kati na mbulamatari na Parlement.

Kasi matata mawuti na botiami bwa bazuzi consitutionnels basato na mokonzi ya mboka na bobuki mobeko.

Président Tshisekedi azali koyoka bato na ntina ya koluka mopepe ya sika nsima na kosakola ete matata mazali kati na CACH na FCC mpe mapekisi mboka kokende o'boso.

XS
SM
MD
LG