Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Matata Ponyo na Bruno Tshibala bazalaki te na bokutani ya ba PM ya kala Tshisekedi


Ba Ministres ba Yambo ya kala Samy Badibanga (G), Mabi Mulumba (2e G) na Singa Udju (3eG) na bokutani na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation na Kinshasa, RDC, 6 novembre 2020, (Twitter/Présidence RDC)
Ba Ministres ba Yambo ya kala Samy Badibanga (G), Mabi Mulumba (2e G) na Singa Udju (3eG) na bokutani na président Félix Tshisekedi na Palais de la nation na Kinshasa, RDC, 6 novembre 2020, (Twitter/Présidence RDC)

Ba Ministres ba Yambo ya kala ya Ekolo Congo démocratique bayambamaki na boyoki bato président Félix Tshisekedi azali kosala. Kasi Matata Ponyo na Bruno Tshibala bazalaki te.

Président Tshisekedi ayabamki vendredi ba Ministres ba Yambo ya kala mpe bakambi ba kala ba Sénat mpe Assemblée nationale.

"Bato bazaki kondogwana mpo na mayele ma bosembo kasi mposa ya bana mboka batali yango te. Yango wana tosengi etemokonzi ya mboka, azwa mokumba na ye na maboko mpe aluka biyano bisengeli mpo mosala na ye ya makasi yango wana na makambo ya boye," elobi Evariste Mabi Mulumba, moko na ba Ministres bay ambo ya kala.

M. Mabi azalaki na Samy Badibanga na Singa Udju ba Ministres ba Yambo basusu ba kala.

Ba Ministres ba Yambo basusu bayambaki na ngonga mosusu lokola Kengo wa Dondo.

Kengo wa Dongo ayambaki mpe lokola mokambi ya kala ya Sénat.

Kasi Bruno Tshibala, mokambi ya ngambo mosusu ya UDPS, mpe Matata Ponyo, bango bazalaki te.

MM. Tshibala na Matata bazali bayi FCC, lingomba linene lya baye bazali nsima na Joseph Kabila.

FCC eboyi boyoki bato M. Tshisekedi azali kosala mpe ezali na likindo wuto lelo na Safari Beach na Kinshasa.

M. Tshisekedi azali na misala ya koyoka bato likolo lya matata azali na yango na FCC mpo na makambo mingi. Kasi mingi mpenza likolo na bazuzi basato atiaki mikolo mileki na Cour constitutionnelle.

XS
SM
MD
LG