Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bitumba ya Tshisekedi na Kabila bingali libanda lya mboka


Président Félix Tshsiekedi (G) na mokonzi ya kala Joseph Kabila na bopesani bokonzi na Palais de la nation, Kinshasa, 24 janvier 2019.
Président Félix Tshsiekedi (G) na mokonzi ya kala Joseph Kabila na bopesani bokonzi na Palais de la nation, Kinshasa, 24 janvier 2019.

Lokola kati na mboka, bitumba kati na président Félix Tshisekedi na mokonzi ya kala Joseph Kabila bizali mpe kongala libanga lya mboka. Bango babale batindi mampinga na bikoloa biike bya pabaya na ntina ya koluka lisungi.

Moko na basungi ya M. Kabila, Barnabé Kikaya asakoli ete na ngambo na bango, M. Kabila atindi mokanda mpo kolakisa na Kalaka mokonzi ya ONU mpe banoko (parrains) banso ya boyokani mpe na bikolo binso ya SADC.

"Tobandaki capagne diplomatique. Joseph Kabila atindaki mokanda ya pole na Kalaka mokonzi ya Nations unies, na ba parrains banso ya boyokani mpe na bikolo binso ya SADC. Ezali ma eyano te libanda na boyokani," elobi M. Kikaya na Twitter.

Bayi ngambo ya M. Tshisekedi balobi ete ezali mpo na kotelema campagne eye nde mokonzi ya mboka atindi balakisi bilongi na Egypte, na Rwanda mpe na Kenya.

"Bakokende bisika binso. FCC ekoki koloba nyonso elingi. Bato banso bamoni ete mboka ekangami," elobi mosungi moko ya M. Tshisekedi.

Suka ya mposo moleki, lipinga moko ya basungi ba M. Tshisekedi ekutanaki na Paul Kagame, mokonzi ya Rwanda, na kigali.

"Bolobi Union sacrée (Liboke lisantu) ? Na Bemba, Katumbi, bato baye bokosaki lobi, baye bakoki kobwakela ye bouée de sauvetage (libaya ya lobiko) ntango azali komela mayi kati na bangando bzalaka nzinga nzginga na ye na bowangani ? Mawa na moto azali kozinda! Ekoki asekama soki ezali te likambo lya mpasi." ekomi na Twitter M. Kikaya.

Bayi FCC baboyi boyoki bato M. Tshisekedi azali kosala.

Bayi FCC balobaki o’mokolo ya eyenga na liyebisi ya suka ya likindo lya mposo moko, ete boyoki bato président Félix Tshisekedi azali kosala botali bango te.

FCC ezali kopamela boyoki bato boye mpo bozali koluka kotia majorité ya sika.

Bayi FCC balobi majorité mawutaka na maponami. Bazali kopamela bayi CACH, lingomba lya M. Tshisekedi na koluka kosomba bakeli mibeko na ntina ya kosala majorité ya sika.

Mpo na bango, esengeli kosala maponami masusu na bitapi binso.

FCC elobi ete matata mazali te kati na mbulamatari na Parlement.

Kasi matata mawuti na botiami bwa bazuzi consitutionnels basato na mokonzi ya mboka na bobuki mobeko.

Président Tshisekedi azali koyoka bato na ntina ya koluka mopepe ya sika nsima na kosakola ete matata mazali kati na CACH na FCC mpe mapekisi mboka kokende o'boso.

XS
SM
MD
LG