Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Cardinal Ambongo alaki kotelema mpo na ekolo, président Tshisekedi alobi akosunga ye


Cardinal Fridolin Ambongo (C) ayambi longonya ya président Félix Tshisekedi elongo na mokambi ya misala mya ye Vital Kamerhe na misa na Stade des martyrs, Kinshasa, 17 novembre 2019.
Cardinal Fridolin Ambongo (C) ayambi longonya ya président Félix Tshisekedi elongo na mokambi ya misala mya ye Vital Kamerhe na misa na Stade des martyrs, Kinshasa, 17 novembre 2019.

Cardinal Frindolin Ambongo asakoli ete akotelema mpo na mboka na ye. Alobi yango na misa monene akambi na stade des Martyrs na Kinshasa, liboso ya président Félix Tshisekedi mpe bituluku na bato.

Alimbola ete akozala "mpo na ekolo Congo démocratique mopesi na toli ya Papa wa Roma, mpe mopesi toli monene mpo na mboka mpe bana ya mboka na ye".

Cardinal Ambongo asengi mingi mpenza na bayi politiki kotika bokwani.

"Tosengeli kozongela likambo ya bomoko mpe bosangani ya ekolo. Ezali malanu te ete bandeko mibali mpe basi baswanaka mpo na makambo mazangi ntina. Ntango ya koswana eleki. Bana mboka balembi," epameli Mgr Ambongo.

Président Tshisekedi, ntango azwi maloba, ayebisi ete boponami ya Mgr Ambongo lokola cardinal bozali elembo ya ntango. "Na ba oyo bayebi kotanga bilembo ya ntango, epesameli komona ete nkolo ayanolaka kaka mabondeli ya bato ya petwa. Na nzela ya boponami boye, mboka na biso ezwi ngolo," elobi M. Tshisekedi.

"Na sengi na mwana nyonso ya Congo kotiya na mayele ete démocratie ezwi nanu makasi te, mpe ezali soki tosangani na bolingo ya ekolo elongo na kondima Nzambe nde tokotonga Congo moko ekomemela esengo na bana ya mboka," ebakisi Tshisekedi.

Mokonzi ya ekolo alaki kopesa maboko na cardinal Ambongo.

XS
SM
MD
LG