Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Cardinal Fridolin Ambongo azongi Kinshasa


Cardinal ya sika ya RDC Frindolin Ambngo Besungu (D) azali kosolola na Papa François na milulu mya bokelali na ye na Roma, 5 pctpbre 2019.
Cardinal ya sika ya RDC Frindolin Ambngo Besungu (D) azali kosolola na Papa François na milulu mya bokelali na ye na Roma, 5 pctpbre 2019.

Cardinal Fridolin Ambongo azongi na ekolo Congo démocratique nsima na bokelami na ye na Papa wa Roma o’mokolo ta mitano ya sanza ya zomi ya mobu 2019 na Roma.

Episkopo ya lokumu ya Kinshasa ayambami na bituluku na bato na engumba mokonzi Kinshasa wuto libanda ya mpepo ya N’Djili kino na Archeveché ya engumba eye.

Milulu mike mibongisa lokola ba concerts mpe misa minene mpe na bozongi na ye.

Mgr Ambongo azalaki moko na ba 13 cardinaux papa François akelaki na milulu ya le 5 octobre 2019.

Azali episkopo ya minei ya kokota na molongo ya lokumu ya ba cardinaux na RDC.

Akitani na cardinal Laurent Monsengwo oyo akeyi pension mpo na akokisi mibu 79 ya bomoi.

XS
SM
MD
LG