Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Cardinal Ambongo atie mosala mwa ye na elombo ya bosangisi mpe boyokani


Episkopo ya lokumu ya Kinshasa, Mgr Frindolin Ambongo na misa ya Noel na Kinshasa, 24 décembre 204.
Episkopo ya lokumu ya Kinshasa, Mgr Frindolin Ambongo na misa ya Noel na Kinshasa, 24 décembre 204.

Cardinal Frodolin Ambongo alobi ete atie mosala mwa ye ya mokambi ya eklezia eye abandi, na nse ya elembo ya kosangisa bato mpe ya boyokani.

Alobi yango na bokutani bwa ye ya yambo na bapanzi sango na Kinshasa wuto akelamaki cardinal na Papa François, na Roma, le 5 octobre eleki.

"Nakosala nyonso mpo na kosangisa mpe koyokanisa bana ba Congo banso ya Congo nakolandaka te ngambo na bango ya politiki, ya kondima, lelolenge na bango ya bozwi na bango," elimboli Mgr Ambongo.

Mpo etali politiki alobi ete esengeli mboka ekende liboso na lolenge ya malamu, ekklezia mpe ezali kotali liboso.

Cardinale Ambongo azongaki na Kinshasa sanza eleki.

XS
SM
MD
LG