Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi atie Léon de Saint Moulin na molongo ya ba héros nationaux Kabila-Lumumba


Sango Léon de Saint Moulin, na Kinshasa, RDC, (Portrait officiel), 6 novembre 2019. (Facebook/Bilenge ya mwinda du Monde)
Sango Léon de Saint Moulin, na Kinshasa, RDC, (Portrait officiel), 6 novembre 2019. (Facebook/Bilenge ya mwinda du Monde)

Nkondo Sango Léon de Saint Moulin atombolami o’molongo ya ordre national des héros nationaux Kabila-Lumumba to ya bilombe ya ekolo Kabila-Lumumba.

Ezali mokano ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, eyebisi ministre ya kelasi ya likolo mpe université. Ministre Thomas Luhaka alimboli ete kufa ya sango Léon de Saint Moulin likozangisa ekolo Congo démocratique makambo mingi mpe llizali mawa mingi na mpo na mboka eye.

Nkondo Léon de Saint Moulin awaki o’mokolo ya le 24 octobre moleki.

Alekisaki ntango mingi ya bomoi na ye na Congo démocratique esika wapi asalaki mosala ya kisango mpe atangisaki na keleasi ya likolo.

Akoma buku ebele. Na testament na ye asengaki akundama na mabele ya Congo democratique.

Nkondo sango Léon de Saint Moulin akundami na Kimwenza na lopando ya ba nganga Nzambe nsima na misa mikambamaki na cardinal Fridolin Ambongo na cathédrale Notre-Dame ya Lingwala, na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG