Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mgr Ambongo, cardinal ya minei ya RDC


Cardinal ya sika ya RDC Frindolin Ambngo Besungu (D) azali kosolola na Papa François na milulu mya bokelali na ye na Roma, 5 pctpbre 2019.
Cardinal ya sika ya RDC Frindolin Ambngo Besungu (D) azali kosolola na Papa François na milulu mya bokelali na ye na Roma, 5 pctpbre 2019.

Mgr Fridolin Ambango akomi cardinal ya RDC nsima bilulu ya bokelami bwa ye na Papa François elongo na b’episkopo zomi na mibale basusu o’mokolo ya mposo na Rona.

Milulu myango misalaki o’boso ya bato ebele, mpe mingi bana ya Congo.

Bakonzi ya RDC, kobanda na président Félix Tshisekedi, mokambi ya Assemblée nationale na basusu. Bingambe ya opposision mpe bazalaki kuna lokola Martin Fayulu, Moïse Katumbi, Jean-Pierre Bemba mpe basusu.

Boponami na ngai ezali elembo ya lisungi ya Papa na mpasi ya ban aya mboka na biso, elobaki cardinal Ambongo nsima na milulu myango.

Na mibu 59, Mgr Ambongo azali cardinal ya minei ya RDC uto lipanda ya mboka eye. Akitanaki na Cardinal Laurent Monsengwo na ebonga ya episkopo ya lokumu ya Archidiocèse ya Kinshasa, le 25 novembre 2018.

Mgr Monsengwo azwaki retraite na ye mpo aleki mibu 75 ya bomoi.

Yambo ya ebonga na Kinshasa, Mgr Ambongo azalaki episkopo ya lokumu ya Mbandaka-Bikoro uto le 12 novembre 2016. Azalaki mpe vice-président ya CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo). Atelemelaki na bokasi président ya kala Joseph Kabila ntango mapona masalemaki te. Azalaki mpe moko na bakambi ya dialogue to masolo ya politiki maye mapesaki nzela na maponami ya le 30 decembre 2018 maye mabimisaki Félix Tshsiekedi lokola mokonzi ya ekolo.

Azalaki mokambi ya ba frères mineurs capucins ya RDC mpe mokambi ya Assemblée ya ba supérieurs majeurs ASUMA mpe ya ba frères mineurs capucins na Afrika (CONCAU). Mpe akomaki episkopo ya Bokungu Ikela le 6 mars 2005.

Akomaki sango le 14 août 1988 nsima kelasi ya morale ya Académie ya Rome. Atangisaki mpe théologie morale na Université catholique ya Kinshasa.

XS
SM
MD
LG