Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi : "nga na bokonzi, mboka ekokatana te"


Président Felix Tshisekedi na likita ya mbulamatari, Kinshasa, 10 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)
Président Felix Tshisekedi na likita ya mbulamatari, Kinshasa, 10 décembre 2020. (Twitter/Présidence RDC)

Président Felix Tshisekedi alobi mboka ekokatama te ntago ye azali na bokonzi.

"Ntango nga naza na bokonzi ya mboka, 'balakinsation' (bokati ya moka) ekosalama te," eyebisi M. Tshisekedi na ba ministres na likita ya mbulatari, kolanda mosala ya direction ya communication ya présidence na compte Twitter na yango.

Président Tshisekedi alakisi "molende na ye ya kotika ata m2 moko te ya mabele ya ekolo, tango ye azali na bokonzi," ebakisaki M. Tshisekedi.

Nzoka nde, koleka mposo moko, cardinal Fridolin Ambongo asakoli nsima na mobembo na Beni (Nord-Kivu) ete bato bazali kobundisa RDC balingi mpenza kokata ekolo eye.

Yambo na yango, opposant Adolphe Muzito asengaki ete RDC ebongisa mampinga na yango mpe esangisa Rwanda na makasi mpo na mabongisa na yango ya kokata mboka ya ban aya Congo.

Kala te, FARDC, mampinga ya RDC mpe mandimaki likambo yango ya mboka nzinga nzinga koluka kokata mabele ya Congo.

Bato mingi bazali kokufa na bobomami bozali kosala na basimba minduki mpe batomboki na monyele ya RDC

XS
SM
MD
LG