Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alongoli RDC na maponami ya ba membres ya Conseil ya sécurité non-permanents ya ONU


Président Félix Tshisekedi ya Congo démocratique na mokokani wa ye ya Gabon, Ali Bongo Ondimba, bapesani mbote na Libreville, 11 juin 2019. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ya Congo démocratique na mokokani wa ye ya Gabon, Ali Bongo Ondimba, bapesani mbote na Libreville, 11 juin 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi andimi kolongola nkombo ya RDC na maponami ya ba membres non-permanents ya Conseil ya sécurité ya ONU.

Ministre ya mambi ya Bapaya, Christophe Lutundula Apala alobi yango na liyebi.

"Na ntina ya kokolisa bomoko na continent mpe kobatela bondeko na Afrique centrale , tata mokonzi azwi mokano ya kozongisa nsima bopesi nkombo ya Ekolo Congo démocratique na ebonga eye mpo na eloko ya 2026 mpe 2027," elakisi liyebisi lyango.

Bondongwani bozalaki kati na RDC na Gabon, ekolo esusu ya Afrique centrale eye epesaki mpe nkombo na yango mpo na ebonga ya Conseil ya sécurité non permanent.

Ekolo mosusu ya Afrika, Ghana mpe epesaki nkombo kasi na bosimbami ya bikolo bya Afrique ya west.

Bikolo mingi bya Union africaine bindimi kopesa maboko na Gabon.

Président Tshisekedi mokambi ya Union africaine asololaki mpo na yango na président ya Commission ya Union africaine Moussa Faki Mahamat oyo asengaki ye kondima kotikela Gabon.

RDC endimi kasi esengi na bikolo bya Union africaine kopesa yango mapoboko mpo na 2022.

Conseil ya sécurité ya ONU ezalaka na ba membres permanents mitano mpe non-permanents 15.

Afrika asengaka kozala na membre permanent moko to membre ya libela.

XS
SM
MD
LG