Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Abdullahi ya Somalie asengi Tshisekedi kosunga bayi mboka na ye koyokana


President Mohamed Abdullahi ya Somalie (G) na bokutani na ye na président Félix Tshisekedi president ya RDC mpe ya Union africaine (D) ma Kinshasa, RDC, 19 avril 2021. (Twitter/Présidence RDC)
President Mohamed Abdullahi ya Somalie (G) na bokutani na ye na président Félix Tshisekedi president ya RDC mpe ya Union africaine (D) ma Kinshasa, RDC, 19 avril 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Président Mohamed Abdullahi ya Somalie asengi na mokokani wa ye ya RDC mpe mokambi ya Union africaine, Félix Tshisekedi, kosunga ba Somaliens koyokana.

Président Abdullahi asololaki ngonga mibale na président Tshisekedi mardi na Palais de la nation na Kinshasa.

"Na bokutani na bango babale ngonga mibale, mokonzi ya Somalie asengi président Tshisekedi komikotisa na likambo bo’ mokambi ya UA na ntina ya kosunga na eyango mpe kokamba masolo na ngambo inso ezali na matata na Somalie," elobi président ya RDC na Twitter.

"Na ngaomba na ye, M. Tshisekedi apesi losako na bosenga ya M. Abdullahi na kondima lisungi ya UA mpe ya kotanda maboko na baye bans oba Somalie mpo na kimya ya sembo mpe ekowumela," ebakisi présidence ya RDC.

M. Abdullahi akomaki na Kinshasa o’mokolo mwa eyenga moleki.

Somalie ezalie na bitumba wuto 2009 kati na mampinga ma GFT baye basungamaka na AMISON (misala mya ONU mpe ya UA) na mangomba ma basimba minduki ya musumans.

XS
SM
MD
LG