Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabund ayanoli na maloba ma Kagame ete botiami ya TPIRDC nde ekosukisa makambo


Président Paul Kagame ya Rwanda na Paris, France, 18 mai 2021.
Président Paul Kagame ya Rwanda na Paris, France, 18 mai 2021.

Biyano bizali kokoba kokweya nsima na Paul Kagame mokonzi ya Rwanda kowangana mbeba mpe bobomi na Ekolo Congo démocratique na mituna ya ba media ya France.

Jean Marc-Kabund, mokambi ya ntango eye ya UDPS lingomba ya mokonzi ya mboka mpe mokambi molandi ya Assemblée nationale alobi na Twitter ete :Ya lintomba mpo na biso ezali kotiya Tribunal penal mpo na RDC mpo été bato banso basala mbeba basambisama, bazala banani to bisika nini".

Mpo na Jean-Marc Kabund, “Mokonzi ya Rwanda, liboso lya mbeba esalama na RDC, azali lokola mofundami azali kowangana, ebakisi M. Kabund".

Mbeba to bobomi bosalamaki soki moke te na est ya RDC, eyanolaki M. Kagame na biyano apesaki bapanzi sango na France.

Ezali kaka kowangana, eyanolaki mopanzi sango ya RDC Juvenal Munubo, molobeli ya commission ya Bobateli mpe bokengi ya Assemblée nationale ya RDC wuto Kinshasa.

Na ngambo na yango, opposant Martin Fayulu mpe apemelaki maloba ma M. Kagame mpe bozangi ya bokambi bolamu na RDC.

Bayi LUCHA, moko na mangomba ma bomwana mboka, elobi ete M. Kagame aseki nde milimo ya baye bakufa,

Bayi société civile mpe politiki bakundoli ete mampinga ma Rwanda mazalaki na bitumba na Kisangani na ya Ouganda mpe bato mingi bakufa. Bakundoli mpe ete rdf ebenganaki ba ADF na RDC mpe mingi ya ba hutu bakufa.

M. Kagame alobaki ete Dr. Denis Mukwege, oyo azwaka mbano ya Nobel mpo na kimya, azali kosalela masanga manonaka te.

Dr. Mukwege apesi nanu eyano te.

Mpo na M. Kagame rapport mapping ba experts ya ONU basala etonda na lokuta mpe ata na RDC bato mingi bandimaka yango te.

XS
SM
MD
LG