Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Mukwege na ba ONG 50 basengi etumbu mpo na bato basala mbeba ya bitumba


Prix Nobel ya kimya Dr Denis Mukwege azali kopesa lisukulu liboso lya bituluku na Bukavu, Sud-Kivu, 27 décembre 2018.
Prix Nobel ya kimya Dr Denis Mukwege azali kopesa lisukulu liboso lya bituluku na Bukavu, Sud-Kivu, 27 décembre 2018.

Dr Denis Mukwenge, Prix Nobel ya Kimya, elongo na ba ONG baike basengi na président Félix Tshisekedi kosukisa bozangi etumbu ya baye basali mbeba na bitumba na RDC wuto mibu tuku misato.

Dr. Mukwege na ba ONG baye batindi mokanda na bango na ministre wa yambo Sama Lukonde mpe basengi ya kolaka na polele ete akosala na bitumba na bozangi bokengi likambo akondisa yambo.

Président Tshisekedi asengeli kokisa maloba na ye sika mpe asalela mayele makomema eyano na bozangi bosembo mpe (eyano na) mbano na bozangi etumbu, elobi Dr. Mukwege na mokanda na bango.

Ba ONG ya RDC zomi mpe HRW (Human Right Watch) batie manzala na mokanda mwango.

Kati makambo balobi, ba ONG baye basengi bakonzi ba RDC balendela mpe baye batangama na rapport mapping ONU ebimisaki mpo na eloko ya 1993 kino 2003.

Ba ONG baye basengi kolandela mpe kolongola bayi mampinga mpe bokengi bafundama mpo na mbeba ya enene ya makoki ma bomoto.

Basengi mpe lisusu ete bato bazwaki mpasi bafutama.

Bayi LUCHA bango balobi ete makombi masalami nanu mpo na komema baya basila mbeba ya makoki ma bomoto na mpe ya sembo na mboka.

Pene na mangoma 120 ya minene ya basimba minduki na monyele ya RDC.

XS
SM
MD
LG