Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alobi ya motuya nde kimya na bikolo nzinga nzinga mpe bosembo bokolandama


Président Félix Tshisekedi, mokonzi ya RDC mpe mokambi ya Union africaine na bokutani na bapanzi sango na Paris, France, 18 mai 2021.
Président Félix Tshisekedi, mokonzi ya RDC mpe mokambi ya Union africaine na bokutani na bapanzi sango na Paris, France, 18 mai 2021.

Président Félix Tshisekedi alobi suka suka bosembo bokopesama na bana ba RDC baye bazwa mpasi na bitumba kasi yambo esengeli kimya etiama na bikolo nzinga nzinga mpo na ntombwa.

Mokonzi ya Ekolo Congo démocratique ayanolaki na mituna ya ba media mingi ya Europe mercredi na Paris nsima na likita lya bikolo bya Afrika mpo na nkita.

M. Tshisekedi alobi aboyi koyonala na mokokani wa ye ya Rwanda Paul Kagame oyo awanaganaki na ba media France mardi ete mbeba mpe bobomi bosala na RDC.

M. Tshisekedi alobi boyokani bozali malamu mpe soki koyanola M. Kagame akosala yango na nzela mosusu.

"Bosembo bosengeli bopesama na baye banso bazwaki mpasi mpe bakufaki na Congo to bisika misusu na etuka eye. Mpo na biso to mpo na ngai mpeza, ezaleli ya malamu eye président Kagame akokaki kotalisa elingaki kozala kondima kolanda misala mya bosembo mpamba te kino sika moto moko te akatelami likambo. Yango, esengeli kotika misala mya bosembo kosala mpe soki bato baye azali kobatela basalaki eloko te, misala mya bosembo mikolakisa yango," eyanolaki M. Tshisekedi.

Mpo na M. Tshisekedi, "esengeli kobalola nkasa ya moyindo ya Afrika oyo bana ba Afrika bamitalaka na nkanda kasi kokende na boyokani mpo na kotonga Afrika kino ntombwa". "Ntango ya makambo wana ya bosoni esi eleki," ebakisaki M. Tshisekedi.

"Ntango tokokoma na kimya mpe ntombwa nde tokoka kotala lisusu nkasa ya moyindo wana mpe koluka bosembo na nzela ya justice transitionnelle to pénale.. Ya lintomba nde kosukisa bobomi bokobaka mpe kokende na ntombwa ya bikolo bya biso," elobi M. Tshisekedi.

Président ya RDC alobi rapport mapping ezali ekala ya bayi Congo te kasi ya bayi ONU, bato ba sikisiki.

Maloba ma président Kagame ya kowanga bobomi na RDC mamemaki nkanda mingi na ngambo ya bayi Congo.

M. Kagame alobaki ete Dr. Denis Mukwege, mbano ya kimya ya Nobel, asalelaka nde bato ya molili.

Dr, Mukwege asengaka botiami ya Tribunal pénal international mpo na Congo.

Mpo na M. Kagame, rapport mapping etonda na lokuta mpe ata bayi RDC baike mpe bandimaka yango te.

XS
SM
MD
LG