Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato batamboli mpo na kotelemela maloba ma Kagame na Bukavu


Président ya Rwanda Paul Kagame na Kigali, 27 mai 2021.
Président ya Rwanda Paul Kagame na Kigali, 27 mai 2021.

Bato batamboli na Bukavu na Sud-Kivu mpo na kotelemela bowangani ya president Paul Kagame ya Rwanda ete bobomami bosalama mpe bozali kosalama na RDC.

Bayi société civile basengi botiami na mosala ya rapport mapping ya ONU oyo Kagame alobi ezali lokuta.

Batamboli batelemaki liboso lya Institut français mpo kolakisa nkanda na bango.

Bazali koboya maloba M. Kagame apesaki bo’ eyano na ba media ya France na koloba ete bobomami to mbeba moko te esalama na RDC mpe rapport mapping etonda na lokuta mpe endimama te ata baike ya Congo.

M. Kagame alobaki mpe lisusu ete Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya kimya, asalelaka nde lingomba lya bato ya molili.

Nzokande nsima na yango M. Kagame abongisaki maloba maye.

Na Jeune Afrique, M. Kagame alobaki ete président Félix Tshisekedi azali na nzela soki andimi rapport mapping lokola mpe ye azali nan tina ya koboya yango.

Mokonzi ya Rwanda mpe alobaki na Jeune Afrique ete azali kopesa lokumu na mosala ya kobongisa basi babebisama na kozwama na makasi Dr. Mugewge asalaka kasi akobi na koetelemela bato bazali nsima na ye.

Maloba ma M. Kagame mamemaki nkanda mingi kati na bana ba RDC baike.

XS
SM
MD
LG