Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi alaki RDC mpe Afrika bakosunga na kopesa eyano ya climat mpe asengi misolo


Président Félix Tshisekedi ya RDC mpe mokambi ya Union africaine na Kinshasa, 19 avril 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ya RDC mpe mokambi ya Union africaine na Kinshasa, 19 avril 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi alobi ete RDC, ekolo na ye, mpe Afrika azali kokamba bo’ motambwisi ya Union africaine, bakosunga mingi na kopesa eyano na nkwokoso ya bobeki na climat. Kasi asengi misolo.

M. Tshisekedi azwaki maloba na bokutani ya bakambi ba bikolo pene na 40 Joe Biden, mokonzi ya Etats-Unis, abengisa na visioconférence.

M. Tshisekedi alobi lisungi lya RDC likoki kokoma kino 21 milliards y aba dollars,

Mpo na mokonzi ya RDC mpe ya UA, mboka na ye mpe Afrika ekokoba kolanda boyokani ya Paris na kobatelaka mpe kosalela malamu nzamba mpe biodiversité lokola ba tourbières na yango eye ekoki kobikisa mokili mibu misato na gaz carboniques ewutaka na misala mya bato na mokili mobimba.

Kati na misala myango, mboka na nga ekani kolona lisusu 63% ya nzamba na yango to nzete milliards moko kino 2023, elobi M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC alaki mpe ete mboka na ye kokitisa bomi ya gaz carboniques na 17% kino 2023.

M. Tshisekedi asengi été motuya ya makala emata. Na kowuta na 5 dollars tonne moko, alingi ekoma ata 100 dollars.

Bo’ mokambi ya ntango eye ya Union africaine, ntembe ezali ten a molimo nan gai ete bikolobya Afrika bizali kati na eyano ya mbeba ya mbongwana ya climat, elobi M. Tshikedi.

Asengi ete bikolo bya molongo bisala ete ezala pete na kozwa misolo mipesamaka na mboka mpo na kobatela nzamba mpe biodiversité. Asengi mpe ete misolo myango mibakisama.

Na bofungoli likita lyango, Joe Biden alaki ete Etats-Unis ekokitisa molinga to mpe gaz ya effet de serre na 50% to 52% kino 2030. Motango yango eleki ya 26% to to 28% na 2025 elakama na mbulamatari eleki. Joe Biden alingi Etats-Unis ezomkokamba mokili na likambo lya Climat ba bokeseni na politiki ya mokonzi abimaki na bokonzi Donald Trump oyo azalaki kowanga ete moto mozali komata na mokili.

Na ngambo na ye, président Xi Jimping ya Chine alaki ete ekolo na ye elingi etika kobimisa gaz carbonique na 2060.

Bakonzi basusu lokola Vladimir Poutine ya Russie bazali lokola mpe Paul Kagame ya Rwanda na Ali Bongo ya Gabon.

XS
SM
MD
LG