Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bopesi mangwele ma COVID-19 bobandi na RDC


Mokambi molandi ya misala ya ONU na RDC, David McLachlan-Karr apesami mangwele AstraZeneca ya COVID-19 na Kinshasa, 19 avril 2021. (Twitter/ONU RDC)
Mokambi molandi ya misala ya ONU na RDC, David McLachlan-Karr apesami mangwele AstraZeneca ya COVID-19 na Kinshasa, 19 avril 2021. (Twitter/ONU RDC)

Bopesi mangwele ma COVID-19 boabandi lundi 19 avril 2021 na Ekolo Congo démocratique.

Bayi mbulamatari baike, kati na bango ministre ya mambi ma bokolo oyo azali kobimba, Dr. Eteni Longondo, mpe ba ntoma ya bikolo mya bapaya bazwi yango bato ba yambo.

Mokambi molandi ya misala ya ONU na RDC, David McLachlan-Karr mpe molakisi elongi ya Union européenne, Jean-Marc Chataigner mpe basusu bazalaki wana.

"Natikala kozwa COVID-19 mpe nalingi kozwa yango te. Nazali na mibu koleka 55 mpe nakokisi maye masengami mpo na kozwa yango. Nazwi mangwele maye mpo mangwele mazali kopesama na RDC mazali makasi. Nalingi na pesa ndakisa,: elobi na bapanzi sango M. Chataigner nsima na kopesama mangwele.

Ezali mamngwele makelama na AstraZeneca maye million moko na nokoto nkama sambo epesama na RDC na nzela ya COVAX.

XS
SM
MD
LG