Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi akomi na Bunia nsima na Butembo epayi wapi akebisi mpo na COVID-19


Président Félix Tshisekedi nsima na bokiti na mpepo na libanda lya mpepo ya Bunia, Ituri, 17 juin 202. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi nsima na bokiti na mpepo na libanda lya mpepo ya Bunia, Ituri, 17 juin 202. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akomi na Bunia, na Ituri, na butu. Kasi yambo na yango azalaki na Butembo, na Nord-Kivu, mpe akebisaki mpo na mbonge ya misato ya COVID-19, epayi aleki nsima na kozala Beni.

M. Tshisekedi alaki kosilisa bozangi bokengi na Nord-Kivu mpe apesi bana ya Butembo longonya ndenge bazali kotonga ata bitumba bizali.

"Bosala keba mpo mbonge ya misato ya COVID-19 ezali koboma mingi koleka mibale miye tozalaki na yango. Na Beni, boyaki bato bazala mingi mpo na kopesana bokono te," elobi M. Tshisekedi liboso lya bato bazalaki na lisikulu apesaki.

Yambo na yango, na Beni epayi wapi awutaki, alakaki kosala manso mpo na bokengi bozonga.

"Nakozala soki moke te na esengo soki nasili te likambo lya bozangi bokengi na monyele ya mboka," elobaki mokonzi ya RDC.

Alobaki yango yambo na kotika Beni, na masolo na bakulaka mpe bato baike ya engumba eye.

M. Tshisekedi ayanolaki na bana ba kelasi baye basalaki botelemeli ya mposo misato na ndako ya mosala ya mondele mboka ya Beni.

Bana bakelasi baye balakisi ye mpasi bazwaki na milulu myango mpe baike babukanaki mpe bazokakaki.

Président Tshisekedi asengi nab ana mboka kotika kobunda boko na basusu na baye Nzinga Nzinga kasi basala misala mya ntombwa mya botomboli. Asengi bolimisi mpo na kokutana na bituluku mpamba te esengeli kobatela bana mboka na bokono.

Président Tshisekedi azelamaki mpe na Bunia na Ituri na mobembo azali kosala wuto mokolo ya mposo moleki na monyele ya mboka.

Azali kotala ndenge état de siege atiaki wuto sanza moko na ndambo ezali kotambola na Nord-Kivu mpe na Ituri.

Mercredi, afungolaki na Kasindi na Nord-Kivu, na mokokani wa ye Yoweri Museveni ya Ouganda, bobandi ya botongi nzela ekosangisa bikolo mibale mpe ekokende kino Goma.

XS
SM
MD
LG