Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COVID-19: Ba nganda, b'ekala na ba boîtes de nuit ekangami mikolo 15 na mokano ya Tshisekedi


Présiodent félix Tshisekedi liboso lya bapanzi sango na Goma, Nord-Kivu, 13 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC_
Présiodent félix Tshisekedi liboso lya bapanzi sango na Goma, Nord-Kivu, 13 juin 2021. (Twitter/Présidence RDC_

Banganda, ba ekala, ba boîtes de nuit to bisaka misusu bato bamelaka mpe babinaka bikozala ya konganga mikolo 15, couvre feu to bokoti ndako botikali wuto 22h kino 4h mpe bokosalama na bokengeli ya bayi police… yango nde miike kati na mikambo président Tshisekedi asakoli.

Mokonzi ya mboka, Félix Tshisekedi asakoli mikano ya kobatela mboka na mboka na mbonge ya misato ya COIVD-19 ezali kongala.

Akomi mwa makasi mikano mizalaki wuto mobu moleki.

Couvre feu to bokoti ndako botikali wuto ngonga ya zomi ya butu kino ya minei ya ntongo mpe bosalama na bokengeli ya bayi police, elobi président Tshisekedi wuto Goma, engumba mokonzi ya Nord-Kivu esika azali wuto mokolo mwa mposo mpo na kobondisa maloba ma baye bazwaki mpasi na botomboki ya volcan Nyiragongo,

Banganga, ba ekala, ba boîtes de nuit to bisaka misusu bato bamelaka mpe babinaka bikozala ya konganga mikolo zomi na mitano.

Wuto le 10 mars, Ekolo Congo démocratique ekomi na bato koleka nkoto tuku misato na mitano na nkama libwa na zomi na sambo to 35.917.

Lundi, Cellule technique ya bitumba na COVID-19 esakolaki ete bato 12 basusu bakufaki na COVID-19.

Bato nkama minei na tuku minei basika bayebani na kozwa bokono. Kati na bango nkama minei na zomi na motoba na Kinshasa; Nord-Kivu nde etuka ya mibale na bakoni zomi na sambo, nsima na yango Tshopo na minei mpe Sud-Kivu na misato; kaka bato koleka nkoto tuku misato na mine inde bazwai mangwele. Bakoni banso baleki nkoto tuku misato na ndombo wuto COVID-19 ekotaki na RDC na mars 2020, kolanda mokanda ya cellule technique ya lundi.

Président Tshisekedi akundomli na bato ete bokono bwa COVID-19 bozali komata makasi.

Mikamno misusu mitali. Bitong bisengami kokitisa motango ya bato bakozala na mayangai mpe mbulamatari elaki kofuta misolo misolo mpo na bakoni. Kozipa zolo mpe monoko, kosokola maboko mpe kotika ntaka ya metre moko na ndambo na bato basusu esangami.

XS
SM
MD
LG